Romans 14

Koyamba bandeko oyo bazali na bolembu

1Boyamba malamu moto oyo alenda te na kondima, bosambisa te lolenge na ye ya kokanisa. 2Kondima ya moko epesi ye nzela ya kolia bilei nyonso, nzoka nde, mosusu, lokola alenda te na kondima, aliaka kaka bandunda. 3Tika ete moto oyo aliaka bilei nyonso atiola te moto oyo aponaka bilei ; mpe moto oyo aponaka bilei asambisa te moto oyo aliaka bilei nyonso, pamba te Nzambe asila koyamba ye. 4Boni, yo ozali nani mpo na kosambisa mosali ya moto mosusu ? Atelema to akweya, ezali likambo ya mokonzi na ye. Tembe te, akotelema kaka, mpo ete Nkolo azali na makoki ya kotelemisa ye.

5Moko akanisaka ete mokolo songolo ezali bule koleka mokolo pakala, mpe mosusu akanisaka ete mikolo nyonso ezali kaka ndenge moko. Boye, tika ete moto na moto andima penza kolanda makanisi na ye. 6Moto oyo akesanisaka mikolo, asalaka yango mpo na lokumu ya Nkolo ; moto oyo aliaka bilei nyonso, asalaka yango mpo na lokumu ya Nkolo, pamba te apesaka Nzambe matondi. Boye, moto oyo aponaka bilei, asalaka yango mpe mpo na lokumu ya Nkolo, bongo apesaka Nzambe matondi. 7Pamba te, moko te kati na biso azali na bomoi mpo na ye moko, mpe moko te akokufa mpo na ye moko. 8Soki tozali na bomoi, tozali na bomoi mpo na Nkolo, mpe soki tokufi, tokufi mpo na Nkolo. Yango wana, tozala na bomoi to tokufa, tozali kaka bato ya Nkolo.

9Ezali mpo na yango nde Klisto akufaki mpe asekwaki mpo ete azala Nkolo ya bato bakufa mpe ya bato na bomoi. 10Boye yo, mpo na nini ozali kosambisa ndeko na yo ? Mpo na nini ozali kotiola ndeko na yo ? Biso nyonso tokotelema na esambiselo ya Nzambe mpo na kosamba. 11Pamba te, ekomama : “Na Kombo na Ngai,” elobi Nkolo,
“mabolongo nyonso ekofukama liboso na ngai
mpe minoko nyonso ekotatola Nzambe.”

12Yango wana, moto na moto akosamba liboso ya Nzambe mpo na makambo na ye moko.

Kobetisa ndeko kati na kondima libaku te

13Yango wana, totika kosambisana biso na biso. Nzoka nde, bosalela mayele na bino te mpo na kobetisa ndeko moko libaku to kokweisa ye. 14Lokola moto oyo azali kati na Nkolo Yesu, nayebi mpe nandimi ete eloko ya mbindo ezalaka te. Kasi, soki moto amoni yango lokola eloko ya mbindo, ekokoma mpe mbindo mpo na ye. 15Soki, likolo ya bilei ozali koyokisa ndeko na yo motema pasi, ozali kotambola na bolingo te. Likolo ya bilei, kobungisa te ndeko na yo, oyo Klisto akufelaki. 16Tika ete makambo oyo yo ozali komona malamu, ekoma te epai ya bato mosusu, nzela ya kotiola. 17Pamba te, Bokonzi ya Nzambe ezali te likambo ya kolia to komela, kasi ezali likambo ya bosembo, ya kimia mpe ya esengo kati na Molimo Mosantu, 18pamba te, moto oyo asalelaka Klisto na lolenge oyo, asepelisaka Nzambe mpe bato bandimaka ye.

19Yango wana, tolukaka tango nyonso makambo oyo ememaka kimia mpe elendisaka biso na kondima bamoko mpe bamisusu. 20Koboma mosala ya Nzambe te likolo ya biloko ya kolia. Solo, biloko nyonso ezali peto, kasi ezali mabe kolia eloko oyo ekoki kobetisa moto mosusu libaku. 21Eloko oyo eleki malamu ezali : koboya kolia misuni, komela vino to eloko nyonso oyo ekoki kobetisa ndeko na yo libaku.

22Batela mpo na yo moko liboso na Nzambe, makambo oyo ozali kondimela. Esengo na moto oyo amisambisaka te mpo na likambo oyo ye andimaka. 23Kasi soki moto asili kolia biloko oyo ezali kosambisa motema na ye, asali masumu, pamba te asali te oyo kondima na ye ezali kotinda ye. Nzoka nde, likambo nyonso oyo ewuti na kondima te, ezali lisumu.
Copyright information for LinMNB