Romans 15

1Biso oyo tolenda na kondima, tosengeli kondima bolembu ya bato oyo balenda te na kondima mpe koboya komisepelisa kaka biso moko. 2Tika ete moto na moto kati na biso aluka kosepelisa moninga na ye, mpo na bolamu mpe kolendisama na ye. 3Pamba te, ezala Klisto, alukaki te komisepelisa ye moko ndenge ekomama : “Kofinga oyo bafingaki yo ekweyaki epai na ngai.” 4Nzoka nde, makambo nyonso oyo ekomama kala, ekomamaki mpo na koteya biso, mpo ete na nzela ya kokanga motema mpe malendisi oyo Makomi epesaka, tokoka kozala na elikya. 5Tika ete Nzambe, Ye oyo asungaka bato ete bakoka kokanga motema mpe abondisaka bato, apesa bino makoki ya kozala na bomoko bino na bino, kolanda mokano ya Klisto Yesu 6mpo ete bokoka kokumisa Nzambe, Tata na Nkolo na biso Yesu Klisto, na likanisi moko mpe na monoko moko.

Klisto, Mosali ya bato ya bikolo nyonso

7Boyambanaka bino na bino ndenge Klisto ayambaki bino mpo na nkembo na Nzambe. 8Pamba te, nazali koloba na bino solo ete Klisto akomaki mosali ya Bayuda mpo na kolakisa ete Nzambe azali moyengebene, na ndenge akokisaki bilaka oyo apesaki na bakoko na bango. 9Ayaki mpe mpo ete bato ya bikolo ya bapaya bakoka kokumisa Nzambe mpo na mawa na ye, ndenge ekomama : “Yango wana, nakokumisa yo
kati na bato ya bikolo ya bapaya,
mpe nakoyemba nzembo
mpo na lokumu ya Kombo na yo.”

10Alobaki lisusu : “Bato ya bikolo ya bapaya
bosepela elongo na bato na Ye.”

11Mpe lisusu : “Bokumisa Nkolo,
bino nyonso bato ya bikolo ya bapaya,
tika ete bato nyonso bakumisa Ye.”

12Ezayi mpe alobaki : “Moto moko akobima na libota ya Isayi,
akotelema mpo na kokonza bikolo
mpe bato ya bikolo ya bapaya
bakotiela Ye mitema.”

13Tika ete Nzambe oyo apesaka elikya, atondisa bino na esengo mpe na kimia, na nzela ya kondima, mpo ete botonda na elikya na nguya ya Molimo Mosantu.

Mosala ya Polo

14Bandeko na ngai, nandimi solo ete botondisami na bolamu, na boyebi mingi mpe na makoki ya kolendisana bino na bino. 15Nzoka nde, mpo na kolamusa makanisi na bino, nakomelaki bino na molende nyonso mwa makambo, kolanda ngolu oyo Nzambe apesaki ngai 16ya kozala mosali ya Yesu Klisto epai ya bato ya bikolo ya bapaya. Nabulisami mpo na koteya Sango Malamu ya Nzambe mpo ete bato ya bikolo ya bapaya bakoma likabo oyo ebulisami na Molimo Mosantu, likabo oyo esepelisaka Nzambe. 17Yango wana, namikumisaka kati na Klisto Yesu, na mosala oyo nasalaka mpo na Nzambe. 18Pamba te, soki nakoki koloba, nakoloba kaka mpo na makambo oyo Klisto asalaki na nzela na ngai, mpo na kosala ete bato ya bikolo ya bapaya bakoka kotosa Nzambe, na nzela ya Liloba, ya misala, 19mpe ya nguya Molimo Mosantu, oyo emonisami na bikamwa mpe bilembo. Boye, wuta na Yelusalemi, mpe na bazinga-zinga nyonso kino na Iliri, nateyaki Sango Malamu ya Klisto. 20Pamba te, nazwaki mokano ya koteya Sango Malamu na bisika oyo Kombo ya Yesu eyebanaki nanu te, mpo ete natonga likolo ya fondasio ya moto mosusu te. 21Ndenge ekomama : “Bato oyo balobela bango nanu te na tina na Ye, bakomona Ye ;
mpe baoyo bayoka nanu sango na Ye te, bakososola.”

22Yango nde ezalaki mbala mingi kokanga ngai nzela ya koya epai na bino. 23Kasi sikʼoyo, nazali lisusu na esika te ya kosala mosala na etuka oyo ; bongo, lokola wuta kala nazalaka na posa makasi ya koya epai na bino, 24nazali na elikya ete nakomona bino tango nakokende na Espane, wana nakolekela epai na bino mpo na kozwa lisungi na bino mpo na kokende kuna, sima ya kosepela kowumela na bino elongo ata na mwa tango moke. 25Nzoka nde, sikʼoyo, nazali kokende na Yelusalemi mpo na komemela basantu lisungi. 26Pamba te, mangomba ya Masedwane mpe ya Akayi ezwaki mokano ya kosangisa biloko mpo na kosunga babola oyo bazali kati na basantu ya Yelusalemi. 27Solo, bango moko nde bazwaki mokano ya kosala bongo, mpo ete ezalaki lokola niongo epai na bango. Pamba te, soki Bayuda bakabolaki makabo ya molimo elongo na bato ya bikolo ya bapaya, bango mpe basengeli kokabola biloko na bango elongo na Bayuda. 28Boye, soki nasilisi mosala oyo, mpe napesi bango lisungi yango, nakolekela epai na bino tango nakokende na Espane. 29Nayebi ete tango nakoya epai na bino, nakoya na mapamboli mingi ya Klisto.

30Kasi nabondeli bino bandeko, na Kombo ya Nkolo na biso Yesu Klisto mpe ya bolingo ya Molimo : bobunda elongo na ngai na nzela ya mabondeli oyo bosalaka epai na Nzambe na tina na ngai, 31mpo ete nakweya te na maboko ya bato ya Yudea, bato ya mitema mabanga ; mpe ete basantu ya Yelusalemi bayamba malamu lisungi oyo nakomemela bango. 32Na bongo nde nakolonga kokoma epai na bino na esengo, mpe soki Nzambe akolinga, nakopema mwa moke elongo na bino. 33Tika ete Nzambe ya kimia azala elongo na bino nyonso ! Amen.
Copyright information for LinMNB