Romans 16

Bambote

1Natindeli bino ndeko na biso ya mwasi Foebe oyo azali mosali ya lingomba ya Sankrea. 2Boyamba ye kati na Nkolo ndenge bayambaka basantu, mpe bosunga ye na makambo nyonso oyo akosenga bino. Pamba te, asungaki bato ebele penza, ngai mpe lokola.

3Bopesa mbote na Priska mpe Akila, baninga na ngai ya mosala kati na Klisto Yesu. 4Bandimaki ata kokufa mpo na ngai. Ngai moko kaka te nde nazali kotonda bango, kasi mpe mangomba nyonso ya bikolo ya bapaya. 5Bopesa mpe mbote na lingomba oyo esanganaka na ndako na bango.

Bopesa mbote na molingami na ngai Epayinete, oyo azalaki moto ya liboso ya kondimela Klisto na mokili ya Azi.
6Bopesa mbote na Mari oyo asalaki mosala makasi mpo na bino.

7Bopesa mbote na Andronikusi mpe Junia, bandeko na ngai mpe baninga na ngai ya boloko. Bazalaki bato ya lokumu kati na bantoma, mpe bandimelaki Klisto liboso ete ngai nandimela.

8Bopesa mbote na Ampiliatusi, molingami na ngai kati na Nkolo.

9Bopesa mbote na Uribano, moninga na biso ya mosala kati na Klisto, mpe na molingami na ngai Sitakisi.

10Bopesa mbote na Apelesi, oyo alakisaki penza ete azalaka ya Klisto.

Bopesa mbote mpe na bato oyo bavandaka na ndako ya Arisitobule.

11Bopesa ndeko na ngai Erodioni mbote.

Bopesa mbote na bato oyo bavandaka na ndako ya Narisise mpe bazali kati na Nkolo.

12Bopesa mbote na Trifene mpe Trifose, basi oyo basalaki mosala makasi kati na Nkolo.

Bopesa mbote na Perisisi, molingami na ngai ya mwasi oyo asalaki mosala makasi kati na Nkolo.

13Bopesa mbote na Rifusi, moponami kati na Nkolo.

Bopesa mpe mbote na mama na ye, oyo azali mpe mama na ngai.

14Bopesa mbote na Asinkrite, na Flegoni, na Erimesi, na Patrobasi, na Erimasi mpe na bandeko nyonso oyo bazali na bango elongo.

15Bopesa mbote na Filologe, na Jili, na Nere mpe na ndeko na ye ya mwasi Olipasi, elongo na basantu nyonso oyo bazali na bango elongo.

16Bopesana mbote bino na bino, na beze ya bule. Mangomba nyonso ya Klisto etindeli bino mbote.

17Bandeko, nabondeli bino : bosala keba na bato oyo bakotisaka bokabwani mpe batiaka mabaku na nzela na bino, na makambo oyo ekeseni na mateya oyo bosilaki kozwa. Bozala mosika na bango. 18Bato ya lolenge oyo basalelaka nde mabumu na bango, kasi basalelaka Nkolo na biso Klisto te. Bapengwisaka makanisi ya bato ya bindima-ndima na nzela ya maloba na bango ya elengi mpe ya sukali. 19Pamba te, bato nyonso bayebi botosi na bino, boye motema na ngai etondaka mingi na esengo mpo na bino. Kasi nalingi ete bozala bato ya bwanya mpo na kosala malamu, mpe bato oyo bazangi mbeba mpo na oyo etali makambo ya mabe.

20Etikali kaka moke ete Nzambe na kimia anyata-nyata Satana na se ya makolo na bino.

Tika ete ngolu ya Nkolo na biso Yesu ezala na bino.

21Timote, moninga na ngai ya mosala elongo na bandeko na ngai : Lusiusi, Jasoni mpe Sosipatere batindeli bino mbote.

22Ngai Teritiusi oyo nakomi mokanda oyo, napesi bino mbote kati na Nkolo.

23Gayusi oyo ayambaki ngai mpe lingomba mobimba na ndako na ye mpe apesi bino mbote.

Erasite oyo abombaka mbongo ya engumba elongo na ndeko na biso Kwaritusi batindeli bino mbote.

24Tika ete ngolu ya Nkolo na biso Yesu Klisto ezala na bino nyonso. Amen.
Eteni oyo ezalaka te na mikanda mingi ya kala.

25Na Ye oyo azali na nguya ya kotelemisa bino ngwi na nzela ya Sango Malamu oyo nateyaka, mpe na nzela ya mateya ya Yesu Klisto kolanda emoniseli ya mabombami ya Nzambe oyo ebombama wuta kala ; 26Kasi sikʼoyo emonisami mpe elakisami epai ya bato ya bikolo nyonso ya bapaya, na nzela ya makomi ya basakoli kolanda ndenge Nzambe ya seko na seko atindaki, mpo ete bikolo nyonso ekoka kondimela Ye mpe kotosa Ye, 27na Nzambe wana, oyo Ye kaka nde azali na bwanya, nkembo epesamela Ye libela na libela na nzela ya Yesu Klisto ! Amen.
Copyright information for LinMNB