Romans 2

Kosambisa ya Nzambe

1Yango wana, yo moto oyo osambisaka bato mosusu, ata soki ozali nani, yo mpe osalaka lokola bango. Pamba te, tango osambisaka bato mosusu, omisambisaka nde yo moko ; mpo ete yo oyo osambisaka, osalaka mpe mabe. 2Nzoka nde, toyebi malamu ete Nzambe asambisaka na bosolo bato oyo basalaka misala ya ndenge wana. 3Boni, okanisi ete okokima kosambisama ya Nzambe, yo oyo osambisaka bato oyo basalaka mabe tango yo moko mpe ozali kosala mabe lokola bango ? 4To, ozali kotiola bolamu na Nzambe oyo eleka ndelo, motema monene na Ye mpe boboto na Ye ? Oyebi te ete bolamu ya Nzambe ememaka yo na nzela ya kobongola motema ?

5Kasi ozali moto makasi mpe motema libanga. Ozali nde komibendela etumbu yo moko, mpo na mokolo ya kanda ya Nzambe, tango akomonisa bosembo ya kosambisa na ye. 6Nzambe akopesa na moto na moto kolanda misala na ye : 7bomoi ya seko epai ya baoyo, na nzela ya molende na bango mpo na kosala malamu, balukaka nkembo, lokumu mpe makambo oyo ebebaka te. 8Kasi kanda mpe somo mpo na bato oyo batelemelaka Ye, baboyaka bosolo mpe balandaka nzela ya mabe. 9Solo, minyoko mpe mitungisi ezali kozela moto nyonso oyo asalaka mabe : liboso Bayuda, mpe na sima, bato ya bikolo ya bapaya ; 10kasi nkembo, lokumu mpe kimia ezali kozela moto nyonso oyo asalaka malamu : liboso Bayuda, mpe na sima, bato ya bikolo ya bapaya. 11Pamba te, Nzambe atalaka bilongi ya bato te.

12Bato nyonso oyo basalaki masumu na kozanga koyeba Mobeko ya Moyize, bakokufa, kasi bakosambisama kolanda Mobeko te. Nzoka nde, baoyo basalaki masumu na koyeba Mobeko yango, bakosambisama kolanda Mobeko. 13Pamba te, bato na sembo na miso na Nzambe ezali te baoyo basukaka kaka nakoyoka, kasi ezali baoyo batosaka Mobeko nde bakotangama bato na sembo. 14Soki bato ya bikolo ya bapaya oyo bayebi Mobeko te, kasi bazali kosala na ndenge na bango moko, makambo oyo Mobeko esengaka, boyeba ete bamikomisaka Mobeko mpo na bango moko, ata soki bayebi yango te. 15Na bongo, balakisaka na nzela ya bizaleli na bango ete misala oyo Mobeko esengaka ezali ya kokomama kati na mitema na bango. Mitema na bango mpe etatolaka yango, ndenge moko mpe makanisi na bango efundaka bango to mpe elongisaka bango. 16Nyonso wana ekomonana polele mokolo oyo Nzambe akosambisa basekele ya bato, na nzela ya Yesu Klisto. Ndenge elobama kati na Sango Malamu oyo nateyaka.

Bayuda mpe Mobeko

17Bongo soki yo moto oyo omibengaka moyuda, otiaka elikya na Mobeko, omikumisaka mpo na Nzambe ; 18oyebi mokano ya Nzambe, oyebi kopona makambo ya malamu koleka, pamba te mibeko eteya yo ; 19omimonaka ete ozali motambwisi ya bakufi miso, mwinda ya baoyo bazali kati na molili ; 20molakisi ya bazoba, moteyi ya bana mike, mpo ozwaka boyebi nyonso mpe bosolo kati na Mobeko. 21Yo moto oyo oteyaka bato mosusu, mpo na nini omiteyaka yo moko te ? Oteyaka bato mosusu ete bayiba te, kasi mpo na nini yo moko oyibaka ? 22Yo moto olobaka ete basala ekobo te, kasi mpo na nini yo moko osalaka ekobo ? Yo moto oyo oboyaka banzambe ya bikeko, kasi mpo na nini owzaka biloko na makasi na batempelo na bango ? 23Yo moto oyo omikumisaka mpo na Mobeko, oyebi te ete tango obukaka yango, opesaka Nzambe lokumu te ? 24Lokola ekomama : “likolo na bino, kombo ya Nzambe ezali kotiolama epai ya bato ya bikolo ya bapaya.” 25Kokata nzoto ya mibali ezali na tina soki ozali kotosa Mobeko. Kasi soki obuki Mobeko, ata soki okatisa nzoto ya mibali, okozala lokola moto oyo akatisa nzoto ya mibali te. 26Kasi soki moto oyo bakata nzoto ya mibali te azali kokokisa Mobeko, ata moto yango akatama nzoto ya mibali te ; boni, bakotanga ye te lokola moto oyo bakata nzoto ya mibali ? 27Bongo moto oyo bakata nzoto ya mibali te, kasi atosaka Mobeko, akosambisa yo oyo obukaka Mobeko ata ozali na Makomi ya Mobeko mpe bakata yo nzoto ya mibali. 28Pamba te, ezali te makambo oyo emonanaka na miso nde ekomisaka moto moyuda, ezali mpe te elembo oyo emonanaka na nzoto nde ekomisaka moto akatisama nzoto ya mibali. 29Kasi eloko ekomisaka moto moyuda ezali makambo ya kati, mpe kokatisama nzoto ya solo ezali oyo Molimo azali kosala na motema, kasi ezali te ya mokanda ya mobeko. Moyuda ya ndenge oyo azwaka lokumu na ye na bato te, kasi na Nzambe.
Copyright information for LinMNB