Romans 5

Kimia elongo na Nzambe

1Yango wana, lokola tokomi bato ya sembo na nzela ya kondima, tozali na kimia elongo na Nzambe, na nzela ya Nkolo na biso Yesu Klisto. 2Na nzela na Ye, tozwi ndingisa, na nzela ya kondima, ya kozwa ngolu oyo tozali kowumela kati na yango. Esengo na biso ewuti na elikya oyo tozali na yango ete tokobika nkembo na Nzambe. 3Tozali na esengo kaka mpo na elikya wana te, kasi mpe, mpo na bapasi, pamba te toyebi ete bapasi ebotaka koyika mpiko, 4koyika mpiko ememaka elonga kati na komekama, mpe elonga kati na komekama ebotaka elikya. 5Nzoka nde, elikya ekosaka te, pamba te Nzambe asopaki bolingo na ye na mitema na biso, na nzela ya Molimo Mosantu oyo apesaki biso.

6Solo, wana tozalaki nanu bato na bolembu, Klisto akufaki mpo na bato ya masumu na tango oyo Nzambe abongisaki. 7Ezali pasi komona moto kondima kokufa mpo na moto ya sembo ; tango mosusu moto akoki kondima kokufa mpo na moto ya malamu. 8Kasi tala ndenge nini Nzambe alakisi biso bolingo na ye : wana tozalaki nanu bato ya masumu, Klisto akufaki mpo na biso.

9Lokola tokomi bato ya sembo na nzela ya makila na Ye, akoki solo kozanga kobikisa biso na kanda ya Nzambe ? 10Wana tozalaki nanu banguna ya Nzambe, boyokani na biso na Ye ezongaki na nzela ya kufa ya Mwama na Ye ; akoki solo kozanga kobikisa biso na nzela ya bomoi na ye, wana boyokani na biso ezongi ? 11Tozali na esengo kaka mpo na bapasi wana te, kasi tozali mpe na esengo kati na Nzambe na nzela ya Nkolo na biso Yesu Klisto, oyo na nzela na Ye azongisi boyokani na biso na Nzambe.

Adami mpe Yesu Klisto

12Yango wana, lokola lisumu ekotaki na mokili na nzela ya moto moko, mpe na nzela ya lisumu kufa, boye na nzela ya lisumu kufa ekangaki bato nyonso : mpo ete bato nyonso basalaki masumu… 13Pamba te, liboso ete Nzambe apesa Mobeko, lisumu ezalaki kati na mokili ; mpe etumbu mpo na lisumu ezali te soki Mobeko ezali te. 14Nzoka nde, wuta na tango ya Adami kino na tango ya Moyize, kufa ezalaki mpe na bokonzi epai ya bato oyo babukaki Mobeko te ndenge Adami abukaki. Adami azalaki elilingi ya moto oyo asengelaki koya.

15Kasi, likabo ya ofele oyo Nzambe apesaki ezali na motuya mingi koleka lisumu ya Adami. Pamba te, soki mabe ya moto moko ememelaki bato ebele kufa, boye ngolu na Nzambe mpe likabo oyo eyei na nzela ya ngolu ya moto moko, Yesu Klisto, etondisami mingi penza epai ya bato ebele. 16Mpe lisusu, likabo ya Nzambe ezali na motuya mingi koleka lisumu ya moto moko : boye, na nzela ya lisumu ya moto moko, kosambisama ememi etumbu, nzoka nde, epai masumu ezali ebele, likabo ya ngolu elongoli etumbu. 17Pamba te, soki na nzela ya lisumu ya moto moko, kufa ezwaki bokonzi, boye bomoi mpe ezali na bokonzi na nzela ya moto moko : Yesu Klisto, epai ya bato oyo bazwi bomengo ya ngolu na Nzambe mpe likabo ya bosembo.

18Na mokuse, ndenge lisumu ya moto moko ememelaki bato nyonso etumbu, ndenge wana mpe mosala ya moto moko mpo na kokomisa bato sembo ememeli bato nyonso bonsomi oyo epesaka bomoi. 19Pamba te, ndenge kozanga botosi ya moto moko ekomisaki bato ebele bato ya masumu, ndenge wana mpe botosi ya moto moko ekomisi bato ebele bato ya sembo.

20Nzoka nde, Mobeko eyaki mpo na kotalisa polele ete bato bazali kosala mabe mingi. Epai masumu ezali ebele, ngolu mpe ezali ya kofuluka koleka, 21mpo ete ndenge lisumu elakisaki bokonzi na yango na nzela ya kufa, ndenge wana mpe ngolu elakisi bokonzi na yango na nzela ya bosembo, mpo ete emema bomoi ya seko na nzela ya Yesu Klisto, Nkolo na biso.
Copyright information for LinMNB