Romans 6

BIYANO NA BIYANO

Kufa mpe bomoi kati na Klisto

1Boye, toloba nini ? Tosalaka na biso masumu mpo ete ngolu efuluka koleka ? 2Soki moke te ! Pamba te, tosila kokufa mpo na masumu. Boye, ndenge nini tokoki lisusu kokoba kosala masumu ? 3Boni, boyebi te ete biso nyonso oyo tosila kobatisama kati na Yesu Klisto, tozwaki nde libatisi kati na kufa na ye ? 4Bakundaki biso elongo na ye na nzela ya libatisi kati na kufa na ye, mpo ete lokola Klisto asekwaki kati na bakufi na nzela ya nkembo ya Tata, biso mpe totambola na bomoi ya sika.

5Pamba te, soki tosanganaki na ye elongo kati na kufa na ye, solo, tokosangana mpe na ye elongo kati na lisekwa na ye. 6Pamba te, toyebi malamu ete bomoto ya kala ebakamaki na ekulusu elongo na Klisto mpo ete nzoto na biso ya masumu ekufa, mpe tozala lisusu bawumbu ya masumu te. 7Pamba te, moto oyo asili kokufa, alongwe na se ya bowumbu ya masumu. 8Nzoka nde, lokola tosila kokufa elongo na Klisto, tozali kondima ete tokozala mpe na bomoi elongo na Ye. 9Pamba te, toyebi malamu ete Klisto oyo asekwaki kati na bakufi, akokufa lisusu te : kufa ezali lisusu na bokonzi likolo na Ye te. 10Akufaki mpo na masumu, mbala moko mpo na libela ; soki azali na bomoi, azali na bomoi mpo na Nzambe.

11Boye, bino mpe bomimona lokola bato bakufa mpo na masumu, kasi lokola bato ya bomoi mpo na Nzambe kati na Klisto Yesu. 12Yango wana, botika te ete masumu ezala na bokonzi likolo ya banzoto na bino oyo esila kokufa mpo ete botosa lisusu baposa mabe na yango. 13Bokaba biteni ya banzoto na bino te na masumu lokola bisaleli ya makambo ya mabe. Kasi bomikaba bino moko epai ya Nzambe lokola bato oyo basekwa kati na bakufi mpe bazali na bomoi ; mpe bokabela Ye biteni ya banzoto na bino lokola bisaleli ya makambo ya malamu. 14Pamba te, masumu ekozala lisusu na bokonzi likolo na bino te mpo ete bozali lisusu na se ya bokonzi ya Mobeko te, kasi, na se ya ngolu.

15Boye toloba nini ? Tokoba kosala masumu mpo ete tozali na se ya bokonzi ya Mobeko te kasi na se ya ngolu ? Soki moke te ! 16Boni, boyebi te ete soki bomikabi epai ya moto lokola bawumbu mpo na kotosa ye, bokomi nde bawumbu ya moto oyo bozali kotosa ? To, bozali bawumbu ya masumu oyo ememaka na kufa, to, bawumbu ya botosi oyo ememaka na bosembo. 17Tika ete topesa Nzambe matondo : bozalaki liboso bawumbu ya masumu, kasi sikʼoyo, bokomi kotosa na motema mobimba, mateya oyo bateyaki bino. 18Bosila kokangolama na bowumbu ya masumu mpe bokoma bawumbu ya bosembo.

19Nazali koloba lokola moto mpo na botawu na bino. Pamba te, ndenge bokabaki biteni ya banzoto na bino na se ya bowumbu ya misala ya mbindo mpe ya mabe mpo na kosala mabe, ndenge wana mpe bokaba yango sikʼoyo mpo ete ekoma na se ya bowumbu ya bosembo, mpo na kosala misala ya bosantu. 20Tango bozalaki nanu bawumbu ya masumu, bozalaki na bonsomi liboso ya bosembo. 21Bongo, litomba nini bozwaki tango bozalaki kosala makambo oyo ezali koyokisa bino soni lelo ? Makambo yango ememaka na kufa ! 22Kasi awa bolongwe na se ya bowumbu ya masumu mpe bokomi na se ya bawumbu ya Nzambe, litomba oyo bozwi ememaka na bomoi ya bosantu, mpe suka na yango ezali bomoi ya seko. 23Pamba te, lifuti ya lisumu ezali kufa, kasi likabo ya ofele ya Nzambe ezali bomoi ya seko kati na Klisto Yesu, Nkolo na biso.
Copyright information for LinMNB