Romans 9

LOBIKO YA ISALAELE

Nzambe apona Isalaele

1Nazali koloba solo kati na Klisto, nazali kokosa te, mpe motema na ngai ezali koyebisa ngai solo na nzela ya Molimo Mosantu : 2motema na ngai etondi na mawa mpe na pasi oyo ezali kosila te. 3Mpo na yango, eleki kutu malamu ete nalakelama na ngai mabe mpe nakabwana na Klisto mpo na bandeko na ngai, bato ya ekolo na ngai. 4Bandeko yango ezali bato ya Isalaele. Nzambe akomisa bango bana na Ye, apesa bango nkembo, asala boyokani elongo na bango, apesa bango Mobeko, alakisa bango ndenge ya kosambela na solo, apesa bango bilaka, 5mpe bakoko. Ezali na nzela ya bakoko wana nde, Klisto lokola moto, Ye oyo azali likolo na nyonso ayaki na mokili. Tika ete Nzambe akumisama libela na libela ! Amen.

6Yango elingi koloba te ete Liloba ya Nzambe ebimaki na pamba. Pamba te, ezali bakitani nyonso te ya Isalaele nde bazali bato ya Isalaele, 7mpe bakitani nyonso te ya Abrayami nde bazali bana na ye. Nzambe alobaki na Abrayami : “Ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani.” 8Yango elingi koloba ete bana nyonso te oyo Abrayami abotaki nde bazali bakitani na ye, kasi kaka bana oyo abota na elaka ya Nzambe nde batangamaka lokola bakitani na ye. 9Pamba te, tala ndenge Nzambe alakaki Abrayami : “Na eleko lokola oyo, nakoya lisusu mpe Sara akobota mwana mobali.”

10Esukaki kaka wana te, Rebeka mpe abotaki bana mibali mibale na tata moko, ye koko na biso Izaki. 11Nzoka nde, liboso ete mapasa yango babotama mpe basala likambo moko ya malamu to ya mabe, mpo ete mabongisi ya lolenge Nzambe aponaka ekokisama : 12kolanda misala ya bato te kasi kolanda mokano ya Ye oyo abengaka, Nzambe alobaki na Rebeka : “Kulutu akozala mosali ya leki,” 13ndenge ekomama : “Nalingi Jakobi, kasi nayini Ezawu.”

14Boye toloba nini ? Nzambe azali sembo te ? Soki moke te !

15Pamba te, alobaki na Moyize : “Nakosala ngolu na moto oyo
ngai nasepeli kosalela ngolu ;
mpe nakoyokela mawa moto oyo
ngai nasepeli koyokela mawa.”

16Boye, yango ewuti na posa to na makasi ya moto te, kasi ewuti na Nzambe oyo asalaka ngolu. 17Pamba te, tala ndenge Makomi elobaki na tina na Faraon :

“Nakomisaki yo mokonzi mpo na kolakisa nguya na ngai, mpe mpo ete lokumu ya kombo na ngai epanzana na mokili mobimba.”

18Boye, Nzambe asalaka ngolu na moto oyo Ye asepeli kosalela ngolu, mpe ayeisaka motema libanga, moto oyo Ye asepeli koyeisa motema libanga.

Nzambe asalaka likambo oyo Ye moko alingi

19Boye, bato bakoki koloba : Mpo na nini Nzambe apamelaka biso, pamba te, moto moko te akoki kotelemela mokano na Ye ? 20Yo moto, ozali nani mpo ete obeta tembe na Nzambe ? Mbeki ya mabele ekoki solo koloba na moto oyo asali yango : “Mpo na nini osali ngai na lolenge oyo ?” 21Mosali oyo asalaka mbeki ya mabele, azali na bokonzi te ya kosala kaka na potopoto moko wana, nzungu ya lokumu mpe nzungu oyo ezanga lokumu ?

22Okoloba nini, soki Nzambe, mpo na kolakisa kanda mpe nguya na Ye, akangaki motema mingi liboso ya mbeki oyo etumbolaka kanda na Ye, mbeki oyo ebongisami mpo na kobebisama ? 23Boye, okoloba lisusu nini, soki Nzambe asalaki bongo mpo na kolakisa bomengo ya nkembo na Ye mpo na bolamu ya bato oyo asepeli kosalela ngolu, baoyo abongisa wuta kala mpo na nkembo ? 24Ezali biso nde, Nzambe abengaki, kaka kati ya Bayuda te, kasi kati mpe na bato ya bikolo ya bapaya ; 25ndenge alobi na mokanda ya Oze : “Nakobenga bango ‘bato na ngai,’
bango oyo bazalaki bato na ngai te,
nakobenga ye ‘molingami na ngai,’
ye oyo azalaki molingami na ngai te.”

26Mpe na esika oyo balobaki na bango : “bozali bana na ngai te,” bakoloba na bango : “bozali bana ya Nzambe na bomoi.”

27Mpe Ezayi agangaki mpo na Isalaele : “Ata soki motango ya bato ya Isalaele
ezalaki mingi penza lokola zelo ya ebale monene,
ndambo ya bato moke kaka nde bakobika.

28 Pamba te, Nkolo akokokisa Liloba na Ye
nyonso na lombango penza na mokili mobimba.”

29Ezali kaka ndenge Ezayi asakolaki liboso : “Soki Nkolo ya mapinga atikelaki biso bakitani te, tolingaki kokokana na Sodome, mpe kozala ndenge moko na Gomore.”

Isalaele mpe lobiko na nzela ya kondima

30Boye, toloba lisusu nini ? Bato ya bikolo ya bapaya, oyo bazalaki koluka te kokoma bato ya sembo, bakomi sembo na nzela ya kondima ; 31kasi Isalaele oyo azalaki koluka kokoma sembo na nzela ya kotosa Mobeko, atikali kokoma sembo te. 32Mpo na nini ? Pamba te, balukaki te kokoma sembo na nzela ya kondima, kasi na nzela ya misala. Yango wana, babetaki libaku na libanga oyo ekweisaka, 33kolanda ndenge ekomama : “Tala, nasili kotia na Siona
libanga oyo ebetisaka mabaku,
libanga ya monene oyo ekweisaka,
moto oyo akotiela yango motema,
akotikala koyoka soni te.”
Copyright information for LinMNB