Titus 3

Etamboli ya bakristo

1Kanisela bango ete esengeli bayokelaka bayangeli mpe bakonzi na bango, batosaka bango, mpe bazala ya kobongama mpo na kosala makambo ya malamu. 2Yebisa bango ete bafingaka bato te, kasi bazala bato ya kimiampe ya boboto, mpe balakisaka tango nyonso ezaleli ya malamu epai ya bato nyonso.

3Pamba te, liboso, biso mpe tozalaki bato bazanga mayele, bato bazanga botosi, bato babunga nzela, bawumbu ya baposa ya ndenge na ndenge mpe bawumbu ya bisengo, bomoi na biso ezalaki kati na mabe mpe totondaki na bilulela, bato bazalaki koyina biso, mpe tozalakikoyinana biso na biso. 4Kasi tango bolamu mpe bolingo ya Nzambe Mobikisi na biso emonanaki, 5abikisaki biso ; soki abikisaki biso, ezali te mpo na misala ya malamu oyo tosalaki, kasi ezali mpo na mawa na ye. Abikisaki biso na nzela ya kosukola biso na mbotama ya sika mpe na nzela ya kokomisa biso bato ya sika na nguya ya Molimo Mosantu, 6oyo asopelaki biso na mingi penza na nzela ya Yesu Kristo Mobikisi na biso, 7mpo ete, na ngolu na ye, tokoka kokoma bato na sembo na miso ya Nzambe, mpe tokoka kozwa bomengo ya bomoi ya seko oyo totielaka elikya.

8Maloba oyo ezali ya solo penza ; mpe nalingi oteyaka makambo oyo na molende nyonso, mpo ete baoyo basiʼbandima Nzambe bamipesa mobimbampo na kosala misala ya malamu. Makambo oyo ezali malamu mpe na litomba mingi penza epai ya moto nyonso.

Ezaleli oyo tosengeli kozala na yango liboso ya bato oyo bakotisaka bokabwani

9Kasi boya mituna ya bozoba, makambo etali bakombo ya bakoko, tembe, mpe koswana mpo na oyo etali Mibeko, pamba te yango ezali na litombate mpe ezali na tina te. 10Moto oyo akotisaka bokabwani, kebisa ye mbala ya liboso mpembala ya mibale. Soki aboyi koyoka, tika ye. 11Pamba te, esengeli oyeba ete moto ya ndenge wana, asiʼabungi nzela mpe azali kosala masumu ; azali mpe komikatela ye moko etumbu.

Mitindo ya suka

12Tango nakotindela yo Artemas to Tishike, sala nyonso mpo oyaepai na ngai na Nikopolis, pamba te nakani kolekisa tango ya malili makasi kuna. 13Sala nyonso oyo okoki kosala mpo na kosunga Molakisi ya Mibeko Zenas mpe Apolos, mpo na mobembo na bango, mpo ete bazanga eloko moko te. 14Esengeli bato na biso mpe bayekola kosala misala ya malamu, mpo ete bakoka kosungaka baoyo bazalaka na posa ya lisalisi. Na ndenge wana, bakozala te bato oyo babotaka mbuma te.

Bambote

15Baoyo nyonso bazali elongo na ngai batindeli yo mbote. Pesa mbote na baoyo balingaka biso kati na kondima. Tika ete ngolu ezala na biso nyonso.
Copyright information for LinMNB