1 Corinthians 10

Ndakisa ya botomboki ya Isalaele

1Bandeko, nalingi ete boyeba likambo oyo : Bakoko na biso bazalaki bango nyonso na se ya lipata, mpe bango nyonso bakatisaki ebale monene. 2Bango nyonso babatisamaki mpo na Moyize, kati na lipata mpe kati na ebale monene. 3Bango nyonso baliaki bilei ya molimo ya ndenge moko 4mpe bamelaki mayi ya molimo ya ndenge moko, pamba te bazalaki komela na libanga ya molimo oyo ezalaki kotambola elongo na bango : libanga yango ezalaki nde Klisto. 5Kasi Nzambe asepelaki te na mingi kati na bango, yango wana bakufaki na esobe.

6Nzoka nde, makambo oyo esalemaki mpo ete ezala ndakisa mpo na biso ete tolula makambo ya mabe te ndenge bango balulaki. 7Bozala basambeli ya banzambe ya bikeko te ndenge bamisusu kati na bango bazalaki, kolanda ndenge ekomama : “Bato bavandaki mpo na kolia mpe komela, mpe na sima, batelemaki mpo na kosakana.” 8Tosala kindumba te ndenge bamisusu kati na bango basalaki ; bongo bato nkoto tuku mibale na misato (23.000) bakufaki na mokolo moko. 9Tomeka mpe Nkolo te ndenge bamisusu kati na bango bamekaki Ye ; bongo banyoka ebomaki bango. 10Boyima-yima mpe te ndenge bamisusu kati na bango bayimaki-yimaki ; bongo anjelu mobebisi abomaki bango. 11Nzoka nde, makambo oyo esalemaki mpo ete ezala ndakisa mpo na biso, mpe bakomaki yango mpo ete ekebisa biso oyo tokomi na tango ya suka.

12Yango wana, tika ete moto oyo azali kokanisa ete azali ya kotelema, asala keba ete akweya te. 13Komekama moko te ekomelaki bino, oyo ezangaka kokomela bato. Nzambe akokisaka bilaka na Ye : akotika te ete bomekama koleka makasi na bino. Kasi na tango ya komekama, akobongisa nzela ya kolonga yango, mpe akopesa makasi ya koyika mpiko.

Toboya kosambela banzambe ya bikeko

14Yango wana balingami na ngai, bokima kosambela banzambe ya bikeko. 15Nazali koloba na bino lokola epai na bato oyo bazali na mayele ; bososola bino moko soki makambo oyo nazali koloba ezali malamu to mabe. 16Boni, kopo ya elambo oyo na nzela na yango tozongisaka matondi epai na Nzambe, ekomisaka biso lisanga na makila ya Klisto te ? Bongo lipa oyo tokabolaka, ekomisaka biso lisanga na nzoto ya Klisto te ? 17Lokola lipa ezali moko, mpe biso, ata tozali ebele, tozali kaka kosala nzoto moko, pamba te biso nyonso tokabolaka kaka lipa moko.

18Botala bato ya Isalaele : boni, baoyo baliaka banyama oyo babonzelaka banzambe ya bikeko, bazalaka lisanga na etumbelo te ? 19Nalingi koloba nini ? Nalingi koloba ete likabo oyo bapesi na nzambe ya ekeko ezali na tina ? To mpe nzambe ya ekeko ezali na tina ? 20Te ! Nzoka nde, mbeka oyo bapagano bazalaki kobonza, bazalaki nde kobonza yango na milimo mabe, na Nzambe te. Boye, naboyi ete bozala lisanga na milimo mabe. 21Bokoki te komela kopo ya Nkolo mpe kopo ya milimo mabe ; bokoki te kolia na mesa na Nkolo mpe na mesa ya milimo mabe. 22Boni, tolingi nde kotumbola zuwa ya Nkolo ? Tozali makasi koleka Ye ?

Tosala nyonso mpo na lokumu ya Nzambe

23“Moto akoki kosala makambo nyonso oyo alingi,” kasi makambo nyonso te nde ezali na litomba. “Moto akoki kosala makambo nyonso oyo alingi,” kasi makambo nyonso te nde elendisaka kondima. 24Tika ete moko te aluka kaka bolamu na ye moko, kasi aluka mpe bolamu ya bato mosusu.

25Bolia biloko nyonso oyo etekamaka na zando, mpe bomituna-tuna mituna te, pamba te ekoki kobebisa makanisi. 26Pamba te, mokili mpe nyonso oyo ezali kati na yango ezali ya Nkolo.

27Soki moto oyo azali mondimi te abengisi yo mpo na kolia mpe ondimi kokende, lia biloko nyonso oyo bakopesa yo, mpe komituna-tuna mituna te, pamba te ekoki kobebisa makanisi. 28Kasi soki moto moko alobi na yo : “Babonzaki epai ya banzambe ya bikeko mosuni oyo.” Kolia mosuni yango te, mpo na moto oyo akebisi yo mpe mpo na kobebisa makanisi te. 29Nazali koloba na tina na makanisi na yo te, kasi na tina na makanisi ya moto wana ; pamba te, mpo na nini makanisi ya moto mosusu esambisa bonsomi na ngai ? 30Soki nazongisaka matondi mpo na eloko oyo naliaka, bongo mpo na nini kopamela ngai na tina na eloko oyo ngai nazongisaka matondi epai ya Nzambe ? 31Yango wana, ezala soki bokolia, to bokomela : na nyonso bokosala, bosala yango mpo na lokumu ya Nzambe. 32Bozala libaku te, ezala epai ya bayuda, ezala epai ya bato oyo bazali bayuda te to epai ya lingomba ya Nzambe. 33Yango wana, ngai mpe nasalaka makasi mpo na kosepelisa bato nyonso na makambo nyonso. Pamba te, nalukaka kaka bolamu na ngai moko te, kasi mpe bolamu ya bato ebele, mpo ete babika.
Copyright information for LinMNB