1 John 2

1Bana na ngai, nakomeli bino makambo oyo mpo ete bosala masumu te. Kasi soki moto moko asali masumu, tozali na Molobeli moko epai ya Tata, ye nde : Yesu Kristo moto na sembo.

2Ye amikabaki lokola mbeka mpo na masumu na biso, kaka oyo ya biso te, kasi mpe mpo na masumu ya mokili mobimba.

Bolingo

3Tokoki kotia elikya ete toyebi Nzambe, soki tozali kotosa Mibeko na ye. 4Moto oyo alobaki : “Nayebi Nzambe”, kasi asalaka te makambo oyo Nzambe atindaka, azali moto ya lokuta, mpe bosolo ezali kati na ye te. 5Kasi soki moto azali kotosa Liloba na ye, wana bolingo ya Nzambe ezali penza ya kokoka kati na ye. Oyo ezali ndenge toyebaka ete tozali kati na ye. 6Moto oyo alobaka ete azali kati na Nzambe, esengeli atambola ndenge Yesu atambolaki.

7Balingami, nazali kokomela bino mobeko ya sika te, kasi mobeko ya kala, oyo bozwaki wuta na ebandeli. Mobeko yango ya kala, ezali Liloba oyo boyokaki.

8Nakomeli bino lisusu mobeko ya sika ; yango ezali solo oyo ezali komonana kati na ye mpe kati na bino, pamba te molili ezali koleka mpe moi ya solo ezali kongenga.

9Moto oyo alobaka ete azali kati na moi, kasi ayinaka ndeko na ye, azali naino kati na molili. 10Moto oyo alingaka ndeko na ye, azali kati na moi, mpe azali na eloko moko te kati na ye oyo ekoki kobetisa ye libaku. 11Kasi moto oyo ayinaka ndeko na ye, azali kati na molili mpe azali kotambola kati na molili ; ayebi te epai azali kokende, pamba te molili ebomi miso na ye.

Bana, batata mpe bilenge

12Bana, nakomeli bino, mpo masumu na bino esiʼelimbisama na kombo ya Kristo. 13Batata, nakomeli bino, mpo boyebi moto oyo azali wuta na ebandeli. Bilenge, nakomeli bino, mpo bosiʼbolonga moto mabe.

14Bana, nakomeli bino mpo boyebi Tata. Batata, nakomeli bino mpo boyebi moto oyo azali wuta na ebandeli.

Bilenge, nakomeli bino mpo bozali makasi, mpe Liloba ya Nzambe ezali kati na bino, mpe bosiʼbolonga molimo mabe.

Bolinga mokili te

15Bolinga mokili te, ata biloko oyo ezali kati na mokili. Soki moto alingi mokili, bolingo ya Tata ezali kati na ye te. 16Pamba te, biloko nyonso oyo ezali na mokili : baposa mabe ya mosuni, baposa mabe ya miso, na lofundu oyo tomipesaka mpo na biloko, nyonso wana ewutaka na Tata te, kasi ewutaka na mokili. 17Nzokande mokili na baposa na yango ezali koleka, kasi moto oyo asalaka mokano ya Nzambe azali na bomoi libela na libela.

Bokeba na monguna ya Kristo

18Bana na ngai, oyo ezali ngonga ya suka ; ndenge boyokaki ete monguna ya Kristo azali koya, sikʼoyo mpe banguna ya Kristo mingi basiʼbaye. Oyo ezali ndenge tozali koyeba ete yango ezali ngonga ya suka. 19Babimaki wuta epai na biso, kasi bazalaki bato na biso te. Pamba te, soki bazalaki bato na biso, mbele balingaki kotikala elongo na biso ; kasi kokende na bango, ezali kolakisa ete moko te na kati na bango azalaki moto na biso.

20Kasi bino, bosiʼbozwa Molimo Mosantu oyo Kristo apesa, mpe bino nyonso boyebi makambo ya solo. 21Nakomeli bino te mpo boyebi makambo ya solo te, kasi mpo boyebi yango, mpe mpo lokuta moko te ebimaka na makambo ya solo.

22Nani azali moto ya lokuta ? Ezali moto oyo awanganaka ete Yesu azali Kristo te. Moto ya ndenge wana azali monguna ya Kristo, oyo awanganaka Tata mpe Mwana. 23Moto nyonso oyo awanganaka Mwana, azali mpe na Tata te ; moto oyo andimaka Mwana, azali mpe na Tata.

24Mpo na bino, botala soki oyo boyokaki banda na ebandeli ezali kati nabino. Soki yango ezali kati na bino, bino mpe bokozala kati na Mwana mpe kati na Tata. 25Oyo nde elaka apesaki biso : bomoi ya seko.

26Nazali kokomela bino makambo oyo, mpo na baoyo bazali kobungisa bino nzela. 27Mpo na bino, Molimo Mosantu oyo Kristo apesaki bino, azali kati na bino, mpe bozali na posa te ete moto ateya bino, pamba te Molimo oyo Kristo apesaki bino ateyaka bino makambo nyonso. Mpe makambo oyo ateyaka bino ezali ya solo, akosaka te. Yango wana bozala kati na Kristo, ndenge Molimo ateya bino yango.

28Sikʼoyo bana, bokoba kozala kati na ye, mpo ete tango akomonana, tokoka kozala na elikya mpe toyoka soni te na miso na ye mokolo akoya.

Mwana ya Nzambe amipesaka na masumu te

29Soki boyebi ete Kristo azali sembo, boyeba mpe ete moto nyonso oyoasalaka makambo ya sembo, azali mwana na ye.
Copyright information for LinMNB