2 Corinthians 10

POLO ALOBELI MOSALA NA YE YA NTOMA

Bokonzi ya ntoma

1Ngai Polo, nasengi na bino, na boboto mpe na bolamu ya Klisto, ngai oyo namonani lokola moto na bolembu na miso na bino, kasi lokola moto ya makambo makasi tango nazalaka mosika ; 2nabondeli bino : bopesa ngai nzela te ya kosalela tango nakoya epai na bino, makambo makasi oyo nazali kokanisa kolakisa epai ya bato oyo bakanisaka ete biso totambolaka na mosuni. 3Solo, atako tozali bato, kasi tobundaka na nzoto te. 4Pamba te, bibundeli oyo tobundaka na yango ezali ya bonzoto te, kasi ezali bibundeli ya nguya kati na Nzambe, mpo na kobuka makanisi mabe. 5Tokweyisaka makanisi ya lokuta mpe nguya nyonso oyo etelemelaka boyebi ya Nzambe ; tolongaka makanisi nyonso ya bomoto mpe tosalaka ete yango etosa Klisto. 6Tomilengeli mpo na kopesa etumbu na bozangi botosi nyonso, tango botosi na bino ekokoka.

7Botala penza makambo ndenge ezali. Soki ezali na moto oyo azali kobeta tolo ete azali ya Klisto, ayeba mpe ete soki ye azali ya Klisto, biso mpe lokola ye, tozali ya Klisto. 8Bongo, ata soki nakomikumisa koleka mpo na bokonzi oyo Nkolo apesa biso mpo na kolendisa kondima na bino kasi mpo na kobebisa yango te, nakoyokela yango soni ata moke te, 9mpo ete namonana te lokola nde nazali kobangisa bino na mikanda na ngai. 10Pamba te, bato mosusu balobaka : “Mikanda na ye ezalaka makasi mpe ebangisaka, kasi soki azali kati na biso, azalaka na ye moto ya bolembu mpe maloba na ye ezalaka tina te.” 11Tika ete moto oyo akanisaka bongo asimba likambo oyo : ndenge tolobaka na mikanda na biso tango tozalaka mosika na bino, ndenge wana mpe tokosala tango tozala epai na bino.

12Pamba te, tolingi komikokanisa to komekana te na bato mosusu oyo bamikumisaka bango moko, tango balukaka komikokanisa mpe komekana bango na bango. Solo, bazangi mayele. 13Kasi biso, tokomikumisa te koleka ndelo, tokomikumisa kaka kati na bandelo ya mosala oyo Nzambe apesa biso, oyo mpe esali ete tokoma kino epai na bino. 14Pamba te, toleki bandelo na biso te lokola nde tokomaki te kino epai na bino, pamba te tokomaki penza kino epai na bino mpo na komemela bino Sango Malamu ya Klisto. 15Biso, tobetelaka mosala ya bato mosusu tolo te. Nzoka nde, tozali na elikya ete wana kondima na bino ezali kokola, mosala na biso ezali kokoba koya monene kati na bino, kolanda bandelo ya mosala oyo Nzambe apesa biso, 16mpo ete tokoka koteya Sango Malamu na bamboka oyo ezali mosika na bino. Pamba te, tolingi te komikumisa mpo na mosala oyo esalama na elanga ya bato mosusu. Ndenge Makomi ezali koloba :

“Tika ete moto oyo alingi komikumisa, amikumisa kati na Nkolo.”

17

18Pamba te moto oyo bandimaka, ezali te oyo amilobelaka ye moko, kasi ezali nde oyo Nkolo atatolaka malamu mpo na ye.
Copyright information for LinMNB