Acts 13

MIBEMBO YA SAULO MPO NA KOPANZA SANGO MALAMU

Etinda ya Saulo mpe Barnabasi

1Lingomba ya Antioshe ezalaki na basakoli mpe balakisi : Barnabasi, Simeona oyo bazalaki kobenga moto Moyindo, Lusiusi ya Sirene, Manaeni oyo akolaki esika moko na moyangeli Erode mpe Saulo. 2Ezalaki mokolo moko, wana bazalaki kokumamela Nkolo mpe kokila bilei, Molimo Mosantu alobaki : “Botia Barnabasi mpe Saulo pembeni mpo na ngai, na tina na mosala oyo nabengelaki bango.” 3Boye, sima na kokila bilei, batielaki bango maboko mpe batikaki bango kokende.

Barnabasi mpe Saulo na Shipre

4Bongo, Barnabasi mpe Saulo bakendaki na Selesi na etinda ya Molimo Mosantu, mpe longwa kuna, bazwaki masuwa mpo na kokende na esanga ya Shipre. 5Tango bakomaki na Salamine, bateyaki Liloba ya Nzambe na bandako ya mayangani ya Bayuda. Yoane Malako azalaki elongo na bango mpe azalaki kosunga bango.

6Wana batambolaki esanga mobimba mpe bakomaki na Pafosi, bamonaki Moyuda moko na kombo ya Bari-Yesu. Azalaki moto ya maji mpe mosakoli ya lokuta. 7Azalaki mpe moninga ya moyangeli ya esanga, Sergiusi-Paulusi oyo azalaki moto ya mayele. Boye, Sergiusi-Paulusi abengisaki Barnabasi mpe Saulo, pamba te azalaki na posa ya koyoka Liloba na Nzambe. 8Kasi, Elimasi, moto ya maji (pamba te yango nde ezali ndimbola ya kombo na ye) azalaki kotelemela bango, mpe azalaki kosala nyonso mpo na kopengwisa kondima ya moyangeli. 9Boye, Saulo oyo bazalaki mpe kobenga Polo, lokola atondisamaki na Molimo Mosantu atalaki Elimasi swii. Alobaki : 10“Mwana ya Zabolo, otonda na mayele mabe, moto ya lokuta mpe monguna ya makambo nyonso ya malamu. Kino tango nini okotika kobebisa nzela ya sembo ya Nkolo ? 11Tala, loboko ya Nkolo etelemeli yo sikʼoyo. Okokufa miso, mpe na mwa tango, okomona lisusu pole te !”

Kaka na tango wana, molili mpe butu ezipaki miso na ye. Akomaki kobaluka-baluka bipai nyonso mpe koluka moto oyo akosimba ye na loboko, mpo na kolakisa ye nzela.
12Tango moyangeli amonaki makambo oyo esalamaki, andimaki ; pamba te akamwaki mingi penza mpo na mateya oyo bateyaki ye mpo na Nkolo.

Na Antioshe ya Pisidi

13Wuta na Pafosi, Polo elongo na baninga na ye bazwaki masuwa mpe bakendaki na Perje, na mokili ya Pafili. Yoane Malako atikaki bango kuna mpe azongaki na Yelusalemi. 14Mpe longwa na Perje, bakobaki mobembo na bango kino na Antioshe, na mokili ya Pisidi. Na mokolo ya saba, bakotaki mpe bavandaki na ndako ya mayangani. 15Sima ya kotanga Mobeko mpe Basakoli, bakambi ya ndako ya mayangani batindelaki bango maloba : “Bandeko, soki bozali na maloba mpo na kolendisa bato, boloba !”

16Polo atelemaki, atombolaki loboko mpe alobaki :

—Bato ya Isalaele mpe bino oyo bozali Bayuda te kasi botosaka Nzambe, boyoka ngai !
17Nzambe ya bato ya Isalaele aponaki bakoko na biso ; akomisaki bango ekolo monene na tango oyo bavandaki na mokili ya Ejipito lokola bapaya. Boye, abimisaki bango na mokili yango na nguya monene. 18Mibu tuku minei mobimba na esobe, akangaki motema liboso ya bizaleli na bango. 19Apanzaki bikolo sambo na mokili ya Kanana, mpe apesaki mabele na bango lokola bomengo epai ya bato na ye. 20Nyonso wana esalaki mibu pene nkama minei na ntuku mitano. Sima na yango, Nzambe apesaki bango basambisi kino na tango ya mosakoli Samuele. 21Boye, basengaki ye mokonzi mpe apesaki bango Sauli, mwana mobali ya Kisi, moto ya libota ya Benjame, oyo asalaki mibu tuku minei na bokonzi. 22Kasi Nzambe alongolaki Sauli mpe akomisaki Davidi mokonzi na bango. Tala maloba oyo atatolaki mpo na ye : “Namoni ete Davidi, mwana mobali ya Yese azali moto oyo asepelisaka motema na ngai. Ye nde akokokisa mokano nyonso na ngai !”

23Ezali na libota ya Davidi nde Nzambe abimisaki mpo na bato ya Isalaele Mobikisi Yesu, ndenge alakaki. 24Liboso ete Yesu aya, Yoane ateyaki bato nyonso ya Isalaele ete babongola mitema mpe bazwa libatisi. 25Wana Yoane akomaki pene ya kosilisa mosala na ye, alobaki : “Bino bokanisi ete ngai nazali nani ? Nazali te Moto oyo bozali kozela. Kasi Moto yango azali koya sima na ngai, mpe nakokoka kutu te kofungola basinga ya basandale na ye !”

26Bandeko na ngai, bana ya Abrayami, mpe bino bato oyo bozali Bayuda te kasi botosaka Nzambe, ezali mpo na biso nde Nzambe atindaki maloba oyo ya lobiko. 27Bato ya Yelusalemi mpe bakonzi na bango basosolaki te soki Yesu azalaki nani. Nzoka nde, tango bakatelaki ye etumbu, bakokisaki nde maloba ya basakoli oyo bazalaki kotanga na mikolo nyonso ya saba. 28Atako bamonaki mabe moko te kati na ye, mabe oyo ekokaki komemela ye etumbu ya liwa, kasi basengaki kaka ete Pilato abomisa ye. 29Tango bakokisaki makambo nyonso oyo ekomama mpo na ye, bakitisaki ye na ekulusu mpe batiaki ye na lilita. 30Kasi Nzambe asekwisaki ye kati na bakufi, 31mpe na mikolo ebele, amonanaki epai ya bato oyo bazalaki kosala na ye mibembo longwa na Galile kino na Yelusalemi. Boye, bango bazali sikʼoyo batatoli na ye liboso ya bato na biso.

32Tozali koyebisa bino sango malamu : sango malamu oyo Nzambe alakaki bakoko na biso, 33Nzambe akokisi yango mpo na biso bana na bango, na nzela ya lisekwa na Yesu kati na bakufi ndenge ekomama na Nzembo ya mibale : “Ozali Mwana na ngai ya mobali,
lelo nakomi Tata na yo !”

34Nzambe alobaki ete akosekwisa ye kati na bakufi mpo ete apola te. Yango nde alobaki : “Nakopesa bino na solo,
mapamboli ya bule oyo nalakaki Davidi !”

35Yango wana, alobaki na eteni mosusu : “Okotika te ete Mosantu na yo apola.”

36Pamba te, tango Davidi akokisaki mabongisi ya Nzambe na tango na ye, akufaki. Bakundaki ye pembeni ya bakoko na ye mpe apolaki. 37Kasi Moto oyo Nzambe asekwisaki apolaki te.

38Yango wana bandeko na ngai, nalingi boyeba ete, ezali na nzela ya Yesu nde bolimbisi ya masumu esakolami epai na bino. 39Ezali na nzela na ye nde moto nyonso oyo andimi, akomi moto ya sembo, na nyonso oyo Mobeko ya Moyize elongaki te kokomisa ye sembo. 40Yango wana, bosala keba ete makambo oyo basakoli baloba ekomela bino te :
41 “Bino batioli, botala,
bokamwa mpe bolimwa !
Pamba te, nakosala likambo moko na tango na bino,
likambo oyo soki bayebisi bino yango,
bokondima yango te.”

42Wana Polo mpe Barnabasi babimaki na ndako ya mayangani, bato basengaki ete bazonga lisusu na mokolo ya saba oyo elandaki mpo na kolobela lisusu makambo wana. 43Tango mayangani esilaki, Bayuda mingi mpe bato ya bikolo misusu oyo bakotaki na lingomba ya Bayuda balandaki Polo mpe Barnabasi oyo, na masolo na bango, bazalaki kolendisa bango ete bakangama makasi na ngolu ya Nzambe.

Polo na Barnabasi bateyi bato oyo bazali Bayuda te

44Na mokolo ya saba oyo elandaki, bato ebele penza ya engumba bayaki kosangana mpo na koyoka Liloba ya Nkolo. 45Kasi tango Bayuda bamonaki bato ebele, batondaki na zuwa. Boye, bakomaki koloba mabe mpo na makambo oyo Polo azalaki koloba mpe bakomaki kofinga ye. 46Bongo, Polo mpe Barnabasi balobaki na bango na molende nyonso :

–Tosengeli liboso koteya Liloba ya Nzambe. Kasi lokola boboyi yango mpe bomoni ete bokoki te mpo na kozwa bomoi ya seko, tokeyi epai ya bato oyo bazali Bayuda te.
47Pamba te, tala makambo oyo Nkolo atindaki biso : “Nakomisi yo pole mpo na bato ya bikolo misusu,
mpo ete omema lobiko kino na suka ya mokili !”

48Tango bato ya bikolo ya bapaya bayokaki bongo, batondisamaki na esengo mpe bakomaki kokumisa Liloba ya Nkolo ; mpe bato nyonso oyo Nzambe abongisaki mpo ete bazwa bomoi ya seko bakomaki bandimi.

49Liloba ya Nkolo epanzanaki na etuka wana mobimba. 50Kasi Bayuda batiaki songi-songi epai ya basi ya lokumu oyo bazalaki kosambela Nzambe, epai ya bato minene ya engumba wana. Boye, bakomaki konyokola Polo na Barnabasi mpe babenganaki bango na mokili na bango. 51Bongo, Polo mpe Barnabasi bapupolaki putulu ya makolo na bango mpo na bato wana mpe bakendaki na Ikoniomi. 52Bayekoli batondaki na esengo mpe na Molimo Mosantu.
Copyright information for LinMNB