Acts 23

1Polo atalaki swii bato ya Likita monene mpe alobaki : “Bandeko na ngai, kino moyi ya lelo, nazali kosalela Nzambe na motema peto.” 2Kasi Ananiasi, mokonzi ya banganga-Nzambe atindaki bato oyo bazalaki pene ya Polo ete babeta ye na monoko. 3Boye, Polo alobaki na ye : “Nzambe akobeta yo, yo miri oyo bapakola langi ya pembe. Ovandi wana mpo na kosambisa ngai ndenge Mobeko ezali kosenga. Nzoka nde, yo nde moto obuki Mobeko, mpo ete otindi babeta ngai !”

4Bato oyo batelemaki pene ya Polo balobaki :

—Boni, ozali kofinga mokonzi ya banganga-Nzambe ?

5Polo azongisaki :

—Bandeko, nayebaki te ete azali mokonzi ya banganga-Nzambe. Pamba te, nayebi malamu ete ekomama : “Koloba mabe te mpo na mokonzi ya bato na yo.”

6Lokola Polo ayebaki ete kati na bato ya Likita monene bamoko bazalaki basaduseo mpe basusu, bafarizeo, agangaki kati na Likita monene : “Bandeko na ngai, nazali mofarizeo, mwana ya bafarizeo. Nazali kosamba mpo na elikya na biso ya lisekwa ya bakufi.” 7Kaka tango alobaki bongo, tembe makasi ekotaki kati na bafarizeo mpe basaduseo, mpe likita ekabwanaki. 8Pamba te, basaduseo balobaka ete lisekwa ezalaka te, ba-anjelu mpe milimo bazali te ; nzoka nde, bafarizeo bandimaka makambo wana nyonso.

9Makelele emataki makasi penza. Boye, ndambo ya balakisi ya mibeko kati na lisanga ya bafarizeo batelemaki mpe balobaki na molende nyonso : “Solo, tomoni ata mabe moko te na moto oyo. Nani ayebi ? Tango mosusu molimo to anjelu nde moto alobaki na ye.”

10Lokola tembe ekomaki makasi koleka, mokonzi ya basoda abangaki ete bakata Polo biteni-biteni. Boye, apesaki mitindo na basoda ete bakita, balongola ye kati na bango mpe bamema ye na lopango ya basoda.

11Na butu oyo elandaki, Nkolo abimelaki Polo na emoniseli mpe alobaki na ye :

—Yika mpiko ! Ndenge otatolaki ngai na Yelusalemi, osengeli mpe kotatola ngai na Rome.

Bayuda bakani koboma Polo

12Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Bayuda basalaki likita. Balapaki ndayi ete bakolia te mpe bakomela ata eloko moko te kino bakoboma Polo. 13Motango ya bato oyo basalaki likita wana, ezalaki koleka bato ntuku minei. 14Bakendaki epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bakambi mpo na koloba na bango : “Tolapi ndayi ete tokolia eloko moko te kino tokoboma Polo ! 15Bino mpe bato ya Likita monene, bokende sikʼoyo epai ya mokonzi ya basoda mpe bosenga ete bamema Polo liboso na bino ; lokola nde bolingi koyekola likambo na ye. Bongo na ngambo na biso, tosili komibongisa mpo na koboma ye liboso ete akoma awa.”

16Kasi tango mwana mobali ya ndeko ya Polo ya mwasi ayokaki motambo yango, akendaki na lopango ya basoda, akotaki mpe akebisaki Polo.

17Polo abengaki mokonzi moko ya basoda nkama mpe alobaki na ye : “Mema elenge mobali oyo epai ya mokonzi, pamba te azali na likambo ya koyebisa ye !” 18Boye, mokonzi yango amemaki ye epai ya mokonzi ya basoda mpe alobaki : “Mokangami Polo abengaki ngai, mpe asengaki ngai ete namemela yo elenge mobali oyo, mpo ete azali na likambo ya koyebisa yo !”

19Mokonzi ya basoda akamataki elenge mobali na loboko, amemaki ye na pembeni mpe atunaki ye :

—Likambo nini olingi koyebisa ngai ?

20Elenge mobali azongisaki :

—Bayuda bayokani mpo ete basenga yo lobi, omemela bango Polo liboso ya Likita monene, lokola nde balingi koyekola lisusu likambo na ye.
21Kasi kondima bosenga na bango te. Pamba te, bato koleka tuku minei kati na bango bazali kobongisa motambo mpo na ye. Balapaki ndayi ete bakolia te mpe bakomela ata eloko moko te, kino bakoboma Polo. Makambo nyonso esili kobongisama mpe bazali kozela kaka ndingisa na yo !

22Boye, mokonzi ya basoda atikaki elenge mobali wana ete akende. Kasi liboso ete akende, akebisaki ye : “Koloba na moto moko te likambo oyo oyebisi ngai.”

Batindi Polo na Sezare

23Na sima, mokonzi ya basoda abengisaki bakonzi mibale ya basoda nkama mpe alobaki na bango : “Bobongisa basoda nkama mibale, basoda tuku sambo oyo batambolaka na mpunda mpe basoda misusu nkama mibale mpo ete bakende na Sezare, na ngonga ya libwa ya butu. 24Bobongisa mpunda moko mpo na komema Polo mpo ete akoma malamu epai ya moyangeli Felikisi.”

25Boye, akomelaki moyangeli mokanda oyo :

26

Tata moyangeli Felikisi,

Yamba mbote ewuti epai na ngai Klodiusi Lisiasi.

27Bayuda bakangaki moto oyo natindeli yo. Boye, tango balingaki koboma ye, nayaki elongo na basoda mpe nabikisaki ye, pamba te nayokaki sango ete azali moto ya Rome. 28Lokola nalingaki koyeba malamu tina oyo bafundelaki ye, namemaki ye liboso ya Likita na bango ya monene. 29Namonaki ete bafundaki ye kaka mpo na makambo oyo etali mobeko na bango. Kasi balongaki te kofunda ye mpo na mabe moko oyo ekoki kopesa ye etumbu ya liwa to ya boloko.

30

Tango bayebisaki ngai ete Bayuda basalelaki ye likita mpo na koboma ye, nazwaki mokano ya kotinda ye epai na yo noki penza. Mpe nalobaki lisusu na bato oyo bafundaki ye ete baya kofunda ye epai na yo.

31Se bongo, kolanda mitindo oyo basoda bazwaki, bakamataki Polo mpe bamemaki ye butu-butu kino na Antipatrisi. 32Na mokolo oyo elandaki, basoda oyo batambolaka na makolo bazongaki na lopango ya basoda mpe batikaki basoda oyo batambolaka likolo ya mpunda kokende elongo na ye. 33Tango bakomaki na Sezare, basoda oyo batambolaka likolo ya mpunda bapesaki mokanda yango epai ya moyangeli mpe balakisaki ye Polo. 34Moyangeli atangaki mokanda yango mpe atunaki soki Polo azali moto ya mboka nini. Wana ayokaki ete azali moto ya Silisi, 35alobaki na ye : “Nakoyoka yo tango bato oyo bafundaki yo bakokoma.”

Bongo, apesaki mitindo ete bakengela Polo na ndako ya Erode.
Copyright information for LinMNB