Acts 28

Polo kati na esanga ya Malite

1Wana tososolaki ete tosili kobika na likama, toyokaki ete babengaka esanga yango Malite. 2Boye, bato oyo bavandaka na esanga yango basungaki biso mingi. Lokola mvula ezalaki konoka mpe malili ezalaki makasi, bapelisaki moto mpe babengaki biso nyonso ete tokende koyetola. 3Polo alokotaki liboke ya bakoni, mpe tango abwakaki yango na moto, molunge ya moto ebimisaki etupa oyo ekangamaki na ye na loboko. 4Tango bato oyo bavandaka na esanga bamonaki ete nyoka ezali kodiembela na loboko ya Polo, balobanaki bango na bango : “Solo, moto oyo azali mobomi, awuti kobika na likama ya ebale, kasi bosembo ya Nzambe elandi ye kaka mpo na koboma ye.” 5Kasi tango Polo aningisaki loboko, nyoka yango ekweyaki na moto mpe ayokaki ata pasi te. 6Bato nyonso bazalaki kozela ete nzoto na ye evimba, to akufa mbala moko, kasi wana bazelaki tango molayi mpe bamonaki te ata likambo moko ya mabe kokomela ye, babongolaki makanisi mpe balobaki : “Moto azali nzambe !”

7Zinga-zinga ya esika oyo tozalaki, ezalaki na mabele ya Pibiliusi, mokonzi ya esanga. Boye, ayambaki biso malamu epai na ye, mpe tolekisaki mikolo misato kuna. 8Nzoka nde, tata na ye azalaki ya kolala na mbeto mpo ete azalaki kobela fiefele mpe pulupulu ya makila. Polo akendaki kotala ye, sima ya kobondela, atielaki ye maboko mpe abikisaki ye. 9Sima na yango, bato mosusu ya maladi oyo bavandaka na esanga bayaki epai na ye, mpe abikisaki bango. 10Boye, bapesaki biso lokumu ya ndenge na ndenge. Tango tokomaki pene ya kozongela mobemba na biso, bapesaki biso biloko nyonso oyo tozalaki na yango posa mpo na mobembo.

Polo akomi na Rome

11Sima na basanza misato, tozwaki masuwa oyo elekisaki tango na yango ya malili makasi na esanga. Ezalaki masuwa moko ya engumba ya Alekizandri, oyo batia bilembo ya Kasitori mpe ya Polikisi
Kasitori mpe Polikisi bazali mapasa ya banzambe ya bato ya mokili ya Greki. Bato oyo basalaka na masuwa bazalaki kozwa bango lokola banzambe oyo babatelaka bango.
.
12Tosemaki na engumba ya Sirakize, mpe tolekisaki mikolo misato kuna. 13Kolongwa wana, tonanaki pembeni-pembeni ya mokili mpe tokomaki na engumba ya Regio. Na mokolo oyo elandaki, mopepe ya sude ekomaki kopepa, mpe tokomaki na Puzole sima na mikolo mibale. 14Kati na engumba wana, tokutaki bandeko oyo basengaki biso ete tovanda na bango elongo poso mobimba. Na ndenge wana nde, tokendaki na Rome. 15Tango bandeko ya Rome bayokaki ete tokomi, bayaki kino na zando ya Apiusi mpe na esika oyo babengaka “Bandako misato” mpo na kokutana na biso. Tango Polo amonaki bango, atondaki Nzambe mpe azwaki lisusu molende. 16Tango tokomaki na Rome, bapesaki Polo nzela ya kovanda ye moko na ndako. Batielaki ye soda moko mpo na kokengela ye.

Polo ateyi na Rome

17Sima na mikolo misato, Polo abengisaki bakambi ya Bayuda mpo ete bakutana na ye. Tango basanganaki, alobaki na bango :

—Bandeko na ngai, ata nasalaki bato ya ekolo na biso ata mabe moko te, mpe nabukaki ata mobeko moko te bakoko na biso, bakangaki ngai na Yelusalemi mpe bakabaki ngai na maboko ya bato ya Rome.
18Tango bayekolaki malamu likambo na ngai, bazwaki mokano ya kotika ngai, pamba te bamonaki likambo moko te ya mabe oyo ekokaki kosala ete nazwa etumbu ya liwa. 19Kasi lokola Bayuda basepelaki te na mokano wana, nasengaki ete nakende kosamba liboso ya Kayisala. Yango elingi koloba te ete nazalaki na likanisi ya kafunda bato ya ekolo na ngai. 20Yango wana, nalukaki komona bino mpe kosolola na bino. Pamba te, nakangami na minyololo oyo mpo na elikya ya Isalaele.

21Bayuda bazongiselaki ye :

—Biso awa tozwaki ata mokanda moko te kowuta na Yudea na tina na yo ; mpe kati na bandeko oyo bayaki awa, moto ata moko te apesaki biso sango to ayebisaki biso likambo ya mabe na tina na yo.
22Kasi tozali na posa ete yo moko oyebisa biso makanisi na yo, pamba te toyebi malamu ete lingomba na yo ezali kobundisama bisika nyonso.

23Boye, bayokanaki ete bakutana na Polo mokolo mosusu. Mpe tango mokolo yango ekokaki, bayaki ebele na esika oyo Polo azalaki kovanda. Wuta tongo kino na pokwa, Polo azalaki kolimbolela bango mpe koteya bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe, mpe azalaki kosala nyonso mpo ete bandima makambo oyo azalaki koloba na tina na Yesu, wuta na Mobeko ya Moyize mpe na makomi ya basakoli. 24Bamoko bandimaki makambo oyo azalaki koloba, kasi misusu baboyaki kondima. 25Tango bakomaki pene ya kozonga, bango na bango batikalaki kaka koyokana te, bongo Polo abakisaki liloba oyo :

–Molimo Mosantu alobaki na bakoko na bino makambo ya solo tango alobaki na nzela ya mosakoli Ezayi :

26 “ ‘Kende koloba na bato oyo :
Bokoyoka kasi bokososola te ;
bokotala kasi bokomona te.

27 Pamba te, mitema ya bato oyo ekomi mabanga,
bakomi matoyi mangongi,
mpe bamizipi miso,
mpo ete miso na bango emona te,
matoyi na bango eyoka te,
mitema na bango esosala te,
noki te babongola mitema
mpe babikisa bomoi na bango.’ ”

28“Yango wana, nalingi boyeba ete Nzambe atindi lobiko na ye sikʼoyo epai ya bato ya bikolo ya bapaya mpe bakoyoka.”

[
29Tango Polo asilisaki koloba, Bayuda bakendaki mpe bazalaki katiana tembe makasi kati na bango.]

30Polo awumelaki mibu mibale mobimba na ndako ya kofutela. Azalaki koyamba bato nyonso oyo bazalaki koya kotala ye. 31Azalaki kosakola sango ya Bokonzi ya Nzambe mpe koteya na tina na Nkolo Yesu Klisto, na molende nyonso mpe na bipekiseli te.
Copyright information for LinMNB