Acts 3

Moto akufa makolo abiki

1Ezalaki mokolo moko, Piere na Yoane bakendaki na Tempelo na tango ya mabondeli : ezalaki na ngonga ya misato sima ya midi. 2Nzoka nde, ezalaki mpe na bato moko oyo bazalaki komema moto moko akufa makolo wuta abotama, mpe bazalaki kotia ye mikolo nyonso na ekuke ya Tempelo mpo ete asengaka makabo ya mawa epai ya bato oyo bazalaki kokota. Bazalaki kobenga ekuke yango : “Ekuke ya kitoko.” 3Tango amonaki Piere mpe Yoane kokota na Tempelo, asengaki bango likabo ya mawa.

4Boye, Piere na Yoane batalaki ye malamu, mpe Piere alobaki na ye : “Tala biso !”

5Moto yango atalaki bango malamu penza ; na likanisi ya kozwa eloko epai na bango.

6Kasi, Piere alobaki na ye :

—Nazali na mbongo to wolo ya kopesa yo te, kasi oyo nazali na yango, napesi yo yango : na Kombo na Yesu Klisto ya Nazareti, tambola !

7Bongo, asimbaki ye na loboko ya mobali mpe atelemisaki ye. Kaka na tango wana, makolo na ye ekomaki makasi. 8Na mbala moko, atelemaki mpe abandaki kotambola, akotaki nzela moko na bango na Tempelo : azalaki kotambola, kopumbwa mpe kokumisa Nzambe.

9Tango bato nyonso bamonaki ye kotambola mpe kokumisa Nzambe, 10basosolaki ete ezalaki moto oyo azalaki kovanda na “Ekuke ya kitoko” ya Tempelo mpo na kosenga makabo ya mawa. Bango nyonso bakamwaki mingi penza mpe somo ekangaki bango mpo na makambo oyo esalamaki epai na ye.

Piere alimboli likamwisi yango

11Lokola moto yango atingamaki na Piere mpe Yoane, bato nyonso bakamwaki mpe bayaki na mbangu epai na bango, na esika oyo babengaka : “Veranda ya Salomo.” 12Tango Piere amonaki bongo, alobaki na bango :

—Bato ya Isalaele, mpo na nini bozali kokamwa likambo oyo ? Mpo na nini bozali kotala biso lokola nde biso bato tosali ete moto oyo atambola na nguya mpe na boyengebene na biso moko ?

13Kasi ezali Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi, Nzambe ya bakoko na biso nde apesi nkembo na mosali na ye Yesu oyo bino bokabaki mpo ete baboma ye. Yango wana, bowanganaki ye liboso ya Pilato tango azwaki mokano ya kokangola ye. 14Bowanganaki ye oyo azali Mosantu mpe Sembo. Boye, bosengaki ete Pilato atikela bino mobomi na esika ya Yesu. 15Bobomaki nde Mobandisi ya bomoi, nzoka nde, Nzambe asekwisaki ye kati na bakufi, bongo biso, tozali penza batatoli ya likambo yango.

16Ezali na nzela ya kondima na Kombo ya Yesu, nde Kombo yango epesi makasi na moto oyo bozali komona mpe boyebi. Ezali kondima oyo ewuti kati na Yesu nde ekomisi nzoto na ye mobimba kolongono ndenge bozali komona yango.

17Nzoka nde, bandeko na ngai, nayebi ete bosalaki makambo oyo na kozanga boyebi ndenge bakonzi na bino basalaki. 18Kasi ezali na lolenge wana nde Nzambe akokisaki makambo oyo aloba wuta kala na nzela ya basakoli nyonso, ete Klisto na ye asengelaki komona pasi. 19Yango wana, bobongola mitema mpe bozonga epai na Nzambe mpo ete masumu na bino elimbisama. 20Boye, Nkolo akopesa bino tango ya kopema mpe akotindela bino Klisto, ye nde Yesu, oyo apona mpo na bino. 21Asengeli kotikala kuna na likolo kino tango Nzambe akobongisa biloko nyonso, ndenge alaka yango wuta kala na nzela ya babulami na ye, basakoli. 22Pamba te Moyize alobaki : “Yawe, Nzambe na bino akobimisa mpo na bino mosakoli moko lokola ngai, oyo akowuta kati na bandeko na bino : bosengeli kotosa nyonso oyo akoloba na bino. 23Moto nyonso oyo akozanga kotosa ye, esengeli balongola ye kati na bato na ye mpe baboma ye.”

24Basakoli nyonso, wuta na Samuele kino na basakoli oyo bayaki sima na ye, bango nyonso basakolaki na tina ya makambo oyo ezali kosalema na mikolo oyo.

25Bino nde bozali bakitani ya basakoli mpe ya Boyokani oyo Nzambe asalaki na bakoko na bino, tango alobaki na Abrayami : “Nakopambola mabota nyonso ya mokili na nzela ya bakitani na yo !” 26Tango Nzambe asekwisaki Mosali na ye, atindaki ye liboso epai na bino mpo ete apambola bino na kolongola moko na moko kati na bino, na nzela na ye ya mabe.
Copyright information for LinMNB