James 5

1Bino bato ya bomengo, boyoka malamu ! Bolela mpe bomitungisa mpo na bapasi oyo ekokweyila bino. 2Bomengo na bino esiʼepoli, mpe bampese basiʼbalie bilamba na bino. 3Wolo na bino mpe palata na bino esiʼebebi. Mpe kobeba na yangoekozala litatoli mpo na bino, mpe ekolia nzoto na bino lokola moto. Bosiʼbokongoli bomengo na mikolo ya suka. 4Boboyi kofuta lifuti ekoka ya bato oyo basalaka na bilanga na bino. Yoka ndenge ezali kolela ! Kolela ya bato oyo babukaka mbuma na bilanga na bino esiʼekomi kino na matoyi ya Nzambe, Nkolo ya mapinga ya Likolo. 5Awa na mokili, bosila kozwa bomoi oyo etondi na biloko ya kitokompe bisengo. Bomikomisi mafuta lokola baniama oyo ezali kozela mokolobakokata yango nkingo. 6Bopesaki etumbu na moto oyo asalaki mabe te, mpe bobomaki ye ; mpe atikaki bino bosala ndenge bolingaki.

Kozala na mpiko kati na komekama

7Bandeko, bokanga mitema kino mokolo Nkolo akoya. Botala ndenge mosali bilanga akangaka motema, mpe azelaka banda tango mbula ya liboso enokaka kino tango mbula ya nsuka enokaka, mpo azwa mbuma ya malamu. 8Bino mpe bokanga mitema, botonda na mpiko, Pamba te koya ya Nkoloekomi pene-pene.

9Bandeko na ngai, botika koyima-yima kati na bino na bino, mpo Nzambe asambisa bino te. Botala, zuzi asiʼatelemi liboso ya porte. 10Bandeko, mpo na oyo etali kokanga motema kati na bapasi, bokamata baprofeta oyo balobaki na nkombo ya Nkolo lokola ndakisa na bino.

11Lokola boyebi, tobengaka bato ya esengo, bato oyo bazali koyika mpiko. Bosiʼboyoka ndenge Yobo akangaki motema na bapasi, mpe boyebi likambooyo Nkolo asalaki na suka mpo na bolamu na ye ; Pamba te, Nkolo atonda na bolamu mpe na mawa.

Tolapaka ndayi te

12Bandeko na ngai, liboso ya makambo nyonso, bolapaka ndayi te, ata na nkombo ya Likolo, ata na nkombo ya mokili, to mpe ata na nkombo ya eloko nini. Tika ete : “E e !” na bino ezala kaka “E e !”, mpe “Te !” na bino ezala kaka “Te”, mpo ete bokweya te na etumbu.

Libondeli ya moto na sembo

13Soki moto moko na kati na bino azali na mpasi, tika ete abondela. Soki moto moko azali na esengo, tika ete ayemba banzembo. 14Soki moto moko na kati na bino azali maladi, tika ete abenga bampaka ya Lingomba, babondela mpo na ye mpe bakopakola ye mafuta na nkombo ya Nkolo. 15Bongo libondeli oyo esalami na kondima, ekobikisa moto ya maladi, mpe Nkolo akotelemisa ye. Soki asalaki masumu, Nzambe akolimbisa yeyango. 16Boyambola masumu na bino moko na moko, mpe bobondela mpo na bino na bino, mpo ete bobika. Libondeli ya moto na sembo ezali na nguya mingi mpe esalaka mosala.

17Elia azalaki moto lokola biso, tango abondelaki na molende nyonso mpo mbula enoka te, mpe mbula enokaki te bambula misato na ndambu. 18Bongo tango abondelaki lisusu, mbula enokaki, mpe mabele ebotaki bambuma.

Bozongi ya mopengwi

19Bandeko na ngai, soki moto moko na kati na bino apengwi na makambo ya solo, mpe moto mosusu azongisi ye ; 20boyeba ete, moto oyo alongoli moto ya masumu na nzela ya mabe oyoye apengwaki na yango, abikisi moto yango na liwa, mpe Nzambe akolimbisa masumu ebele.
Copyright information for LinMNB