John 1:19-24
19Tala litatoli Jean apesaki tango Bayuda batindaki banganga-Nzambe mpe balevi wuta na Yeruzalem, mpo na kotuna ye soki azali nani. 20Alobaki na bango na bosolo nyonso, awanganaki te, alobaki na bango : —Ngai nazali Kristo te. 21Batunaki ye : —Bongo ozali nani ? Ozali Eliya ? Jean azongisaki : —Nazali Eliya te. Batunaki : —Ozali moprofeta ? Azongisaki : —Te ! 22Bongo batunaki ye : —Kasi ozali nani, mpo tokoka kopesa eyano na bato oyo batindaki biso. Okoloba nini mpo na yo moko ? 23Jean azongisaki : —Ngai nazali mongongo ya moto oyo azali kobelela na esobe : Bobongisa nzela mpo na Nkolo ! ndenge moprofeta Ezayi alobaki yango. 24Bato oyo batindamaki bazalaki bato ya lisanga ya bafarizeo.
Copyright information for
LinMNB