John 12:12-17

12Mokolo oyo elandaki, ebele ya bato oyo bayaki na feti, awa bayokaki ete Yesu akoya na Yeruzalem, 13bakamataki mandalala, bongo bakendaki koyamba ye, mpe bazalaki koganga :

—Ozana ! Mapamboli mingi na moto oyo aye na kombo ya Nkolo ! Mapamboli na Mokonzi ya Isalayele !

14Yesu amonaki mwana ya mpunda, mpe avandaki likolo na yango, ndenge ekomama :
15 Elenge mwasi ya Siona kobanga te,
tala, Mokonzi na yo azali koya,
avandi likolo ya mwana ya mpunda !

16Na tango wana, bayekoli na ye basosolaki te tina ya makambo yango ; kasi tango Yesu akotaki kati na nkembo, bongo nde bakundolaki na mitema ete makambo yango ekomamaki mpo na ye, mpe basalaki makambo wana epai na ye. 17Bato nyonso oyo bazalaki na Yesu tango abengaki Lazare abima na lilita mpe asekwisaki ye kati na bakufi, bazalaki kotatola makambo oyo bamonaki.
Copyright information for LinMNB