John 12:25-30

25Moto oyo akolinga bomoi na ye, akobungisa yango ; kasi oyo akoboya bomoi na ye na mokili oyo, azali kobatela yango mpo na bomoi ya seko. 26Soki moto azali kosalela ngai, alanda ngai ; mpe epai ngai nakozala, mosali na ngai mpe akozala wana. Oyo akosalela ngai, Tata akokumisa ye !

27Sikʼoyo, molimo na ngai, etungisami. Naloba nini ? Tata kangola ngai na ngonga oyo ? Kasi ezali mpo na kokutana na yango nde nakomi na ngonga oyo ! 28Tata, pesa nkembo na kombo na yo !

Bongo mongongo moko ewutaki na likolo :

—Nasiʼnapesa yango nkembo mpe nakopesa yango lisusu nkembo !

29Ebale ya bato oyo bazalaki wana, oyo bayokaki mongongo yango, balobaki ete ezali kake ; basusu balobaki :

—Ezali anzelu moto alobi na ye.

30Kasi yesu alobaki na bango :

—Mongongo yango elobi mpo na ngai te, kasi mpo na bino.
Copyright information for LinMNB