John 18:15-16

15Simon Piere mpe moyekoli mosusu bazalaki kolanda Yesu. Lokola moyekoli yango ayebanaki na mokonzi ya banganga-Nzambe, akotaki elongo na Yesu na lopango ya ndako ya mokonzi ya banganga-Nzambe, 16kasi Piere azalaki kozela libanda, liboso ya porte. Moyekoli oyo mosusu, oyo ayebanaki na mokonzi ya banganga-Nzambe, abimaki mpe alobaki na mwasi oyo azalaki kokengela porte, akotisaki mpe Piere.
Copyright information for LinMNB