Luke 10:25-28
25Molakisi moko ya Mibeko atelemaki mpo na komeka Yesu ; bongo atunaki : —Moteyi, esengeli nasala nini mpo nazwa bomoi ya seko ? 26Yesu atunaki ye : —Bokoma nini na Mibeko na biso ? Makambo nini otangaka kuna ? 27Molakisi ya Mibeko azongisaki : —Linga Nkolo Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na elimo na yo mobimba, na makasi na yo nyonso, mpe na makanisi na yo nyonso ; mpe linga moninga na yo lokola yo moko. 28Yesu alobaki na ye : —Opesi eyano malamu ; sala bongo mpe okozala na bomoi.
Copyright information for
LinMNB