Luke 17:26-30

26—Makambo oyo elekaki na mikolo ya Nowa, ekoleka mpe bongo na mikolo ya Mwana ya moto. 27Bato bazalaki kolia, komela, kobala, mpe kobalisa bana na bango, kino mokolo Nowa akotaki na masuwa. Bongo mpela eyaki mpe ebomaki bango nyonso. 28Ezalaki mpe bongo na mikolo ya Loti. Bato bazalaki kolia, komela, kosomba, koteka, kolona mpe kotonga. 29Kasi mokolo Loti abimaki na Sodomo, mbula ya moto mpe ya sufulu ekitaki wuta na likolo mpe ebomaki bango nyonso. 30Ekozala mpe bongo mokolo Mwana ya moto akomonana.
Copyright information for LinMNB