Luke 19:28-33
28Awa Yesu asilisaki koloba makambo wana, akendaki liboso na bango, mpo na kokende na Yeruzalem. 29Tango akomaki pene-pene na Betfaze mpe Betaniya, pembeni ya ngomba oyo babengaka : “Ngomba ya banzete ya Olive”, atindaki bayekoli mibale na kati ya bayekoli na ye 30mpe alobaki na bango : —Bokende na mboka oyo etalani na bino ; tango bokokota, bokomona mwana ya mpunda bakanga na singa, oyo moto ata moko naino amatela yango te ; bofungola yango, mpe boya na yango. 31Soki moto atuni bino : “Mpo na nini bozali kofungola yango ?”, bozongisela ye : “Nkolo azali na posa na yango !” 32Baoyo batindamaki, bakendaki mpe bakutaki makambo nyonso kaka ndenge ye ayebisaki bango. 33Tango bazalaki kofungola mwana mpunda, bankolo na yango batunaki : —Mpo na nini bozali kofungola mwana mpunda ?
Copyright information for
LinMNB