Luke 22:56-61

56Mosali moko ya mwasi amonaki ye avandi pembeni ya moto, tango atalaki ye malamu, alobaki :

—Moto oyo azalaki na ye !

57Kasi Piere awanganaki mpe alobaki :

—Mwasi, nayebi ye te !

58Sima ya mwa tango moke, moto mosusu amonaki ye mpe alobaki :

—Yo mpe ozali moko na kati na bango ! Kasi Piere azongiselaki ye :

—Te, mobali, ngai te !

59Sima ya pene-pene ngonga moko, moto mosusu lisusu alobaki na molende nyonso :

—Ya solo, moto oyo azalaki mpe na ye ; pamba te azali moto ya Galileya.
60Kasi Piere azongisaki :

—E e mobali ! Likambo ozali koloba nayebi yango te ! Na tango azalaki naino koloba soso elelaki.
61Bongo Nkolo abalukaki mpe atalaki Piere. Tango Piere akanisaki maloba oyo Nkolo alobaki na ye : “Liboso ete soso elela, okowangana ngai mbala misato !”
Copyright information for LinMNB