Luke 3:7-9
7Jean azalaki koloba na bato oyo bazalaki koya mpo na kozwa libatisi epai na ye : —Bino mabota ya banyoka ! Nani akebisi bino ete bokima kanda oyo ezali koya ? 8Bobota mbuma oyo ebongi mpo na bato oyo bobongoli mitema. Mpe botika koloba na nse ya mitema na bino : “Abraham azali tata na biso !” Pamba te, nalobi na bino ete Nzambe akoki kobimisela Abraham bana wuta na mabanga oyo ! 9Epasola koni esiʼebongisami mpo na kokata misisa ya nzete ; nzete nyonso oyo ebotaka mbuma ya malamu te, bakokata yango mpe bakobwaka yango na moto !
Copyright information for
LinMNB