Luke 6:37-42

37Bosambisa te, mpe bakosambisa bino te. Bokatela bato etumbu te, mpe bakokatela bino etumbu te. Bolimbisa baninga na bino, mpe bakolimbisa bino. 38Bopesa, mpe bakopesa bino : bakotia na basaki na bino biloko oyo ekoki penza, oyo bafini malamu, baningisi malamu, mpe oyo ebandi kosopana ; pamba te bakozongisela bino, kaka ndenge bino mpe bopesaka baninga.

39Yesu alobaki na bango lisusu lisapo oyo :

—Boni, moto akufa miso akoki kotambolisa moto mosusu akufa miso ? Bango mibale bakokweya na libulu te ?

40Mwana ya kelasi aleki molakisi na ye te, kasi moto nyonso oyo bateyi malamu penza, akokoma lokola molakisi na ye.

41Mpo na nini ozali kotala mwa lititi moke oyo ezali na liso ya ndeko na yo, mpe ozali komona te nzete oyo ezali na liso na yo ? 42Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo : “Ndeko na ngai, tika nalongola mwa lititi oyo ezali na liso na yo”, na tango yo moko ozali komona te nzete oyo ezali na liso na yo. Moto ya kokosana ! longola liboso nzete oyo ezali na liso na yo, bongo nde okomona polele mpo na kolongola mwa lititi oyo ezali na liso ya ndeko na yo.

(Mt. 7.16-20)

Copyright information for LinMNB