Mark 10:17-22
17Tango Yesu azalaki kokende, moto moko ayaki mbangu epai na ye, afukamaki liboso na ye mpe atunaki ye : —Moteyi malamu, esengeli nasali nini mpo nazwa bomoi ya seko ? 18Yesu azongisaki : —Mpo na nini ozali kobenga ngai moto malamu ? Moto moko te azali malamu, longola kaka Nzambe ye moko. 19Oyebi Mibeko : Kosala ekobo te, koboma te, koyiba te, koloba litatoli ya lokuta te, kokosa moninga te, tosa tata na yo mpe mama na yo. 20Moto yango alobaki : —Moteyi, natosaka nyonso wana banda bolenge na ngai ! 21Yesu atalaki ye mpe alingaki ye. Alobaki na ye : —Ozangi eloko moko ; kende, teka biloko nyonso oyo ozali na yango, pesa na babola, mpe okozala na bomengo na likolo ; bongo yaka mpe landa ngai ! 22Tango ayokaki maloba wana, elongi na ye ekomaki mawa-mawa, akendaki na mawa, pamba te azalaki na bomengo mingi penza.
Copyright information for
LinMNB