Mark 12:1-6

Lisapo ya basali mabe na elanga ya vino

(Mt. 21.33-46 ; Lk. 20.9-19)

1Bongo Yesu abandaki koloba na bango na masapo :

—Moto moko alonaki elanga ya vino. A salelaki yango lopango pembeni-pembeni, atimolaki libulu moko mpo na kokamola mbula, mpe atongaki ndako moko ya molayi mpo na mokengeli. Bongo apesaki elanga na maboko ya basali mpo bafutelaka, mpe akendaki na mobembo.
2Tango eleko ya kobuka mbuma ekokaki, atindaki mosali moko epai ya bafuteli ya elanga mpo azwa epai na bango ya mbuma ya vino. 3Kasi bafuteli ya elanga bakangaki ye, babetaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba. 4Bongo atindelaki bango mosali mosusu ; bazokisaki moto yango na motu mpe bafingaki-fingaki ye. 5Atindaki lisusu moto mosusu, ye nde babomaki ye. A tindaki bato mosusu mingi ; babetaki basusu mpe babomaki basusu.

6Nkolo ya elanga atikalaki kaka na moto moko mpo na kotinda : Mwana na ye ya bolingo. Atindaki ye na suka na bango nyonso, mpe alobaki : “Bakotosa mwana na ngai”
Copyright information for LinMNB