Mark 14:53-54

53Bongo bamemaki Yesu epai ya mokonzi monene ya banganga-Nzambe, epai bakonzi ya banganga-Nzambe nyonso, bankolo, mpe balakisi ya Mibeko bayaki kosangana. 54Piere azalaki kolanda Yesu na mosika, kino na kati ya lopango ya mokonzi monene ya banganga-Nzambe ; bongo avandaki elongo na bakengeli, mpe azalaki koyotela moto.
Copyright information for LinMNB