Mark 9:10-13

10Babombaki likambo yango na motema, mpe bazalaki kotia tembe bango na bango soki “kosekwa kati na bakufi” elingi koloba nini.

(Mt. 17.10-13)

11Bongo batunaki Yesu :

—Mpo na nini balakisi ya Mibeko balobaka ete Eliya asengeli koya liboso ?

12Yesu azongiselaki bango :

—Ya solo, Eliya asengeli koya liboso mpe kobongisa makambo nyonso. Mpo na nini ekomama ete Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi mpe kotiolama ?

13Kasi nazali koloba na bino, Eliya asiʼaya, mpe basalaki ye nyonso oyo bango balingaki, ndenge ekomama mpo na ye.

Yesu abikisi mwana oyo azali na molimo mabe

(Mt. 17.14-21 ; Lk. 9.37-43)

Copyright information for LinMNB