Matthew 10:17-22

17Kasi bokeba, pamba te bakofunda bino na tribunale ya Bayuda ; mpe bakobeta bino bafimbo na bandako na bango ya mayangani.

18Ya solo, bakomema bino liboso ya bayangeli mpe liboso ya mikonzi minene mpo na ngai ; na bongo nde, bokozwa nzela ya kotatola kombo na ngai epai na bango mpe epai ya bato ya bikolo mosusu. 19Tango bakokanga bino, bomitungisa te mpo na makambo oyo bokoloba, pamba te, maloba ya koloba ekobima kaka na tango wana. 20Mpo ekozala bino te bato bokoloba, kasi ekozala nde Molimo ya Tata na bino nde akoloba na minoko na bino.

21Ndeko moko akoteka ndeko na ye mpo abomisa ye ; tata akoteka mwana na ye ; bana bakotombokela baboti na bango mpe bakobomisa bango. 22Bato nyonso bakoyina bino mpo na ngai. Kasi moto oyo akotia molende kino na suka, akobika.

Copyright information for LinMNB