Matthew 13:10-13

10Bayekoli bapusanaki pene-pene na ye mpe batunaki ye :

—Mpo na nini ozali kolobela bango na masapo ?

11Bongo ye azongiselaki bango :

—Bino bozwi nzela ya koyeba basekele ya Bokonzi ya Likolo, kasi bango bazwi yango te.
12Pamba te, moto nyonso oyo azali na eloko, bakopesa ye mpeakotonda na yango ; kasi moto oyo azali na eloko te, bakobotola ye ata oyo azali na yango.

13Tala tina nazali kosalela masapo mpo na kolobela bango ; mpo ata bazali kotala, kasi bazali komona te ; ata bazali kotia matoyi, kasi bazali koyoka te mpe kososola te.
Copyright information for LinMNB