Matthew 15

Yesu mpe bonkoko ya Bayuda

(Mk. 7.1-23)

1Bongo bafarizeo mpe balakisi ya Mibeko bawutaki na Yeruzalem, bayaki epai ya Yesu mpe batunaki ye :

2—Mpo na nini bayekoli na yo batosaka te bonkoko na biso ? Pamba te basokolaka maboko na bango te liboso ya kolia.

3Yesu azongiselaki bango :

—Bongo bino, mpo na nini botosaka te Mibeko ya Nzambe te ? Kasi botosaka kakabonkoko na bino ?
4Pamba te Nzambe alobaki : “Tosa tata mpe mama na yo”, mpo oyoakolakela tata to mama na ye mabe, esengeli baboma ye. 5Kasi bino bolobaka ete : soki moto alobi na tata na ye to na mama na ye : “Biloko oyo nalingaki kopesa yo, nakopesa yango likabo na Nzambe” ; 6mpe moto oyo asali bongo azali na mabe te epai ya tata na ye to mpe mama na ye, mpo na biloko oyo alingaki kopesa ye. Ya solo, na ndengewana, bozali penza koboma Liloba ya Nzambe mpo na bonkoko na bino. 7Bato ya kokosana ! Ezayi asakolaki malamu mpo na bino :
8 Bato oyo bazali kokumisa ngai kaka na bibebo,
kasi mitema na bango ezali mosika na ngai.

9 Bazali kosambela ngai kaka pamba,
pamba te mateya na bango ezali kaka
mibeko oyo esalami na bato.

10Bongo Yesu abengaki ebele ya bato mpe alobaki :

—Boyoka mpe bososola :
11Oyo ekotaka na monoko ya moto ekomisaka ye mbindo te, kasi oyo ebimaka na monoko na ye yango nde ekomisaka ye mbindo.

12Bongo bayekoli bapusanaki pene-pene na ye mpe bayebisaki ye :

—Oyebi te ete Bafarizeo babeti mabaku tango bayoki maloba na yo ?

13Yesu azongisaki :

—Eloko nyonso oyo Tata na ngai ya Likolo alona te, bakopikola yango.
14Botika bango ! Bazali bato bakufa miso oyo bazali kotambusa bato mosusu oyo bakufa miso. Soki moto akufa miso azali kotambusa moto mosusuoyo akufa miso, bango mibale bakokweya na libulu !

15Piere alobaki na ye :

—Limbolela biso lisapo oyo.

16Bongo Yesu atunaki bango :

—Bino mpe bozali naino kososola te ?
17Boyebi te ete oyo nyonso ekotaka na monoko ekendaka na libumu, bongo na sima, ebimaka na libanda ? 18Kasi oyo ebimaka na monoko, ewutaka na motema mpe yango nde ekomisaka moto mbindo. 19Pamba te, makanisi ya mabe, koboma, kosala kindumba, makambo ya soni, koyiba, litatoli ya lokuta mpe kofinga ewutaka na motema. 20Makambo oyo nde ekomisaka moto mbindo. Kasi, kolia na maboko oyoesokolami te, ekomisaka moto mbindo te.

Kondima ya mwasi oyo azali moyuda te

(Mk. 7.24-30)

21Yesu alongwaki wana mpe akendaki na mokili ya Tire mpe Sidon.

22Bongo mwasi moko ya Kanana oyo azalaki kovanda na mokiliwana, ayaki epai na ye mpe agangaki :

—Nkolo, Mwana ya David, yokela ngai mawa ! Mwana na ngai ya mwasi azali konyokwama mingi penza na molimo ya mabe !

23Kasi Yesu azongiselaki ye ata liloba te. Bayekoli bapusanaki pene-pene ya Yesu, mpe babondelaki ye :

—Bengana ye, Pamba te azali koganga na sima na biso.

24Yesu azongisaki :

—Batindaki ngai kaka mpo na bameme ya Isayele oyo ebunga !

25Kasi mwasi wana ayaki mpe afukamaki liboso na ye mpe alobaki :

—Nkolo, salisa ngai !

26Yesu azongisaki :

—Ezali malamu te mpo na kokamata limpa ya bana mpe kobwakela yango bambwa !

27Mwasi alobaki :

—E e Nkolo, kasi bambwa baliaka ata bandambo oyo ekweyaka na mesa ya bakonzi na bango !

28Bongo Yesu azongiselaki ye :

—Mwasi, kondima na yo ezali monene. Esalama mpo na yo ndenge olingi !

Mpe kaka na tango wana, mwana na ye ya mwasi abikaki.

Yesu abikisi bato ebele ya maladi

(Mk. 7.31)

29Yesu alongwaki wana mpe akendaki pembeni ya ebale ya Galileya. Amataki na ngomba mpe afandaki wana. 30Bato ebele penza bayaki epai na ye. Bamemaki bato oyo batambolaka tengu-tengu, bato bakufa miso, bababa, bato oyo bakufa makolo to maboko, mpe bato mosusu koleka. Batiaki bango liboso ya Yesu, bongo abikisaki bango. 31Bato bakamwaki mingi tango bamonaki bababa bakomaki koloba, bato bakufa makolo to maboko babikaki, bato oyo batambolaka tengu-tengubabandaki kotambola malamu, mpe bato oyo bakufa miso babandaki komona. Bongo bakumisaki Nzambe ya Isayele.

Yesu aleyisaki bato nkoto minei

(Mk. 8.1-10)

32Yesu abengaki bayekoli na ye mpe alobaki :

—Nazali koyokela ebele ya bato oyo mawa mingi, pamba te basali na ngai mikolo misato mpe bazali na eloko ye kolia te. Nalingi kozongisa bango na nzala te, soki te bakoki kokweya na nzela !

33Bongo bayekoli na ye bazongisaki :

—Epai wapi tokoki kozwa mampa ya kokoka, na esika oyo ezangi bato mpo na koleyisa bato ebele boye ?

34Yesu atunaki bango :

—Bozali na mampa boni ?

Bango bazongisaki :

—Sambo na mwa bambisi ya mike-mike.

35Yesu alobaki na ebele ya bato bavanda na mabele. 36Bongo azwaki mampa sambo wana na bambisi, azongisaki matondi, abukaki yango mpe apesaki yango na bayekoli na ye. Bongo bango bapesaki yango na bato. 37Bango nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo balokotaki biteni oyo etikalaki, mpe yango etondisaki bitunga sambo. 38Bato oyo baliaki bazalaki mibali nkoto minei, kotanga basi na bana te.

39Tango Yesu asilisaki kozongisa bato, amataki na bwato mpe akendaki na mokili ya Magadani.
Copyright information for LinMNB