Matthew 21:12-17

12Yesu akotaki na lopango ya Ndako ya Nzambe
Bateki mpe basombi oyo Yesu abenganaki, bazalaki na kati ya Ndako ya Nzambe te, kasi na lopango. Soki Bayuda bazalaki kolinga ata moke te eloko ya bosoto ekota na Ndako ya Nzambe, bongo ndenge nini balingaki kondima ete bato basala mombongo na bango na Ndako ya Nzambe ? Ekokaki kosalama te.
, abenganaki bato nyonso oyo bazalaki koteka mpe kosomba biloko. Abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kosanze mbongo, na bakiti ya baoyo bazalaki koteka bapijon.

13Bongo alobaki na bango :

—Ekomama : Ndako na ngai bakobenga yango ndako ya mabondeli ; kasi bino bokomisi yango nganda ya miyibi !

14Bato oyo bakufa miso, na bato oyo batambolaki tengu-tengu bayaki epai na ye, na lopango ya Ndako ya Nzambe, bongo ye abikisaki bango. 15Bakonzi ya banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mibeko bayokaki kanda mingi penza tango bamonaki makamwisi oyo Yesu asalaki, mpe ndenge bana bazalaki koganga na kati ya lopango ya Ndako ya Nzambe : “Ozana na Mwana na David !” 16Bongo batunaki ye :

—Ozali koyoka makambo bana oyo bazali koloba ?

Yesu azongiselaki bango :

—E e ! Naino botangi maloba oyo te : Ozwaki lokumu na monoko ya bana
mpe ya baoyo bamelaka mabele.

17Sima atikaki bango, abimaki na vile mpe akendaki na Betaniya, epai alalaki.

Yesu alakeli nzete ya figi mabe

(Mk. 11.12-14,20-25)

Copyright information for LinMNB