Matthew 21:20-22
20Tango bayekoli bamonaki bongo, bakamwaki mingi, mpe batunaki : —Ndenge nini nzete ya figi ekawuki na mbala moko boye ? 21Yesu azongisaki : —Nalobi na bino ya solo : soki bozali na kondima mpe botie tembe te, bokoki kosala kaka makambo oyo ngai nasali na nzete ya figite, kasi bokoki mpe koloba na ngomba oyo : “Longwa mpe mibwaka na ebale”, yango ekosalama. 22Nyonso oyo bokosenga na libondeli, bokozwa yango soki bondimi.Bokonzi ya Yesu endimami te
(Mk. 11.27-33 ; Lk. 20.1-3)
Copyright information for
LinMNB