Matthew 21:23-27

23Yesu akotaki na Ndako ya Nzambe ; mpe tango azalaki koteya, bakonzi ya banganga-Nzambe na bampaka bayaki epai na ye, mpe batunaki ye :

—Ozali kosala makambo oyo na bokonzi nini ? Nani apesaki yo bokonzi yango ?

24Yesu azongisaki :

—Ngai mpe nakotuna bino motuna moko. Soki bozongiseli ngai eyano, bongo ngai mpe nakoyebisa bino soki na bokonzi nini nazali kosalela makambo oyo.
25Nani apesaki Jean ndingisa mpo na kobatisa, Nzambe to bato ?

Batianaki tembe bango na bango, mpe balobaki :

—Soki tolobi : “Nzambe”, ye akotuna biso : “Bongo mpo na nini bondimelaki ye te ?”
26Soki mpe tolobi : “Bato”, tozali kobanga bato pamba te batonyonso bayebi ete Jean azalaki moprofeta.

27Bongo bazongiselaki Yesu :

—Toyebi te !

Bongo Yesu mpe alobaki na bango :

—Ngai mpe nakoyebisa bino te soki na bokonzi nini nazali kosalela makambo oyo.

Lisapo ya bana mibale

Copyright information for LinMNB