Matthew 23:1-6

Yesu apameli bakonzi ya banganga Nzambe

(Mk. 12.38-40 ; Lk. 11.39-52 ; 20.45-47)

1Bongo Yesu alobaki na ebele ya bato mpe na bayekoli na ye :

2—Balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo mosala na bango kaka kolimbolela bato Mibeko ya Moyize. 3Esengeli botosa bango mpe bosala makambo nyonso oyo bakoloba na bino. Kasi bosala te oyo bango basalaka, pamba te oyo bateyaka, basalaka yango te.

4Bakangaka maboke ya kilo penza mpe batiaka yango na mapeka ya bato ; kasi bango moko basimbaka yango te ata na songe ya mosapi. 5Misala nyonso basalaka, basalaka yango kaka mpo bato bamona bango. Pamba te, bayeyisaka mwa basanduku na bango oyo ekomama mibeko minene, mpe bakomisaka basonge ya banzambala na bango milayi
verset oyo ezali te na mikanda mingi ya kala.
.

6Na bafeti, balingaka kaka bisika ya kitoko, mpe na Ndako ya mayangani bisika ya lokumu.
Copyright information for LinMNB