Matthew 24

Yesu ayebisi bapasi oyo ekokweyila Yeruzalem

(Mk. 13.1-13 ; Lk. 21.5-19)

1Tango Yesu azalaki kobima na lopango ya Ndako ya Nzambe, bayekoli bayaki pene-pene na ye mpo na kolakisa ye ndenge batongaki Ndako yango. 2Kasi Yesu alobaki na bango :

—Bomoni nyonso oyo ! Nalobi na bino ya solo, libanga ata mokote ekotikala likolo ya libanga mosusu. Nyonso ekopanzana !

3Tango Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya Olive, bayekoli na ye bayaki kaka bango moko mpo na kotuna ye :

—Yebisa biso, tango nini makambo wana ekosalama ; elembo nini ekolakisa koya na yo mpe suka ya mokili !

4Yesu azongiselaki bango :

—Bokeba ete moto moko te akosa bino.
5Pamba te, bato mingi bakoya na kombo na ngai mpe bakoloba : “Nazali Kristo” mpe bakokosa bato mingi penza. 6Bokoyoka basango ya bitumba mpe makelele ya bitumba ; bokeba, bobanga te, pamba te, makambo yango esengeli kosalama, kasi wana ekozala naino suka ya mokili te. 7Ekolo moko ekobunda na ekolo mosusu, bokonzi moko ekobunda na oyo mosusu. Nzala ekozala makasi penza mpe mabele ekoningana na bisika mingi. 8Makambo nyonso wana ekozala kaka ebandeli ya bapasi oyo mwasi ayokaka soki alingi kobota.

9Bongo, bakokaba bino mpo na konyokola bino mpe bakoboma bino. Bikolo nyonso ekoyina bino mpo na kombo na ngai. 10Na tango wana, bato mingi bakotika kondima, bakotekana mpe bakoyinana.

11Baprofeta mingi ya lokuta bakobima mpe bakokosa bato ebele. 12Lokola mabe ekobakisama, bolingo ya bato mingi ekokita. 13Kasi moto oyo akokanga motema kino na suka, akobika. 14Sango malamu ya Bokonzi ekoteyama na mokili mobimba mpo ezalalitatoli na bikolo nyonso. Bongo na tango wana nde, suka ya mokili ekoya !

(Mk. 13.14-23 ; Lk. 21.20-24)

15—Yango wana tango bokomona eloko ya somo, oyo ebebisaka, oyo moprofeta Daniele alobaki, etelemi na Esika ya bosantu—moto oyo azali kotanga ayeba malamu tina ya makambo oyo— 16bato oyo bakozala na Yudea bakima na bangomba. 17Moto oyo akozala likolo ya ndako, akita te mpo na kokende kozwabiloko oyo ezali na ndako na ye. 18Moto oyo akozala na bilanga, azonga te na ndako mpo na kokamataelamba na ye.

19Mawa mingi penza na mikolo wana, mpo na basi oyo bakozala na bazemi mpe baoyo bakozala komelisa bana mabele ! 20Bobondela mpo ete mokolo oyo bokokima ezala na tango ya malili makasi te to na mokolo ya saba
saba  : yenga ya bayuda.
.
21Pamba te, pasi ekozala ya somo, na ndenge ete pasi ya ndenge wanaemonana naino te banda mokili ebanda kino sikʼoyo ; mpe pasi ya ndengewana ekozala lisusu te.

22Mpe soki ayeyisaki mikolo yango mokuse te, mbele ata moto moko te akokaki kobika ; kasi ayeyisaki yango mokuse mpo na bato oyo ye apona.

(Mk. 13.24-31 ; Lk. 17.23-24 ; 21.25-31)

23—Na tango wana, soki moto alobi na bino : “Boyoka ! Kristo azali awa” to “Azali kuna !”, bondimela ye te. 24Pamba te, ba-Kristo ya lokuta na baprofeta ya lokuta bakobima. Bakosala bilembo ya minene mpe makamwisi mpo na koluka nzela ya kokosa ata bato oyo Nzambe apona, soki yango ekokaki kosalama. 25Nasiʼnakebisi bino liboso !

26Soki moto alobi na bino : “Botala, azali na esobe”, bokende te. To “Azali awa, na esika ya kobombama”, bondima yango te. 27Pamba te, koya ya Mwana ya Moto ekozala ndenge kongenga ya nkake ebimaka na Este mpe engengaka kino na Weste. 28Esika ebembe ezali, bandeke oyo eliaka ebembe esanganaka wana.

Koya ya Mwana ya moto

(Mk. 13.24-27 ; Lk. 21.25-28)

29Mbala moko, sima ya pasi ya mikolo wana, Moyi ekokoma molili,
sanza ekongenga lisusu te,
minzoto ekokweya wuta likolo,
mpe banguya ya likolo ekoningana.

30Bongo elembo ya Mwana ya moto ekomonana na Likolo ; mpe bato ya bikolo nyonso ya mokili bakolela, mpe bakomona Mwana ya moto akoya na likolo ya mapata, na nguya nyonso mpe na kembo monene. 31Mpe akotinda baanzelu na ye elongo na lokito monene ya kelelo ; bongo bango bakosangisa bato nyonso oyo ye apona na bipai nyonso minei ya mokili, banda na suka moko ya likolo kino na oyo mosusu.

32Bolanda mateya ya nzete ya figi. Soki bitape na yango ekomi pete-pete, mpe makasa na yango ebandi kobima, wana boyebi ete tango ya mbula ekomi pene-pene. 33Bino mpe ndenge moko, tango bokomona makambo wana nyonso, boyeba ete Mwana ya moto akomi pene-pene na porte.

34Nalobi na bino ya solo : bato ya tango oyo, bakoleka te, liboso ete makambo wana esalama. 35Likolo mpe nse ekolela, kasi maloba na ngai ekoleka te !

Bokengela mpo mokolo eyebani te

(Mk. 13.32-37 ; Lk. 17.26-30,34-35)

36—Mpo na likambo ya ngonga to mokolo makambo wana ekosalama, moto ata moko te ayebi yango ; ata baanzelu na Likolo, ata Mwana
ata Mwana  : ezali te na mikanda misusu ya kala.
, kaka Tata.

37Makambo oyo esalamaki na tango ya Nowa, ekosalama mpe ndengemoko na tango ya koya ya Mwana ya moto. 38Pamba te, liboso ete mpela eya, bato bazalaki kolia mpe komela, bazalaki kobala mpe kobalisa, kino mokolo Nowa akotaki na masuwa. 39Kasi bayebaki eloko moko te na oyo elingaki koyela bango, kino mokolo mpela eyaki mpe ebomaki bango nyonso.

Ekozala mpe ndenge moko tango Mwana ya moto akoya.
40Mibali mibale bakozala na elanga : bakomema moko mpe mosusuakotikala. 41Basi mibale bakobanda konika mbuma na libanga, bakokamata moko mpe mosusu akotikala.

42Yango wana bokengela malamu ; pamba te boyebi te mokolo Nkolona bino akoya ! 43Boyeba malamu Sete, soki kolo ya ndako ayebi tango moyibi akoya na butu, akolala pongi te, mpo atika te moyibi akota na ndako na ye. 44Yango wana bino mpe, bomibongisa, pamba te Mwana ya moto akoya na ngonga oyo bino bokokanisa te !

(Lk. 12.41-48)

45Nani azali mosali ya sembo mpe ya mayele, oyo mokonzi na ye atie ye kapita ya basali mosusu mpo na kopesa bango bilei na tango oyo ekoki ? 46Esengo ekozala mingi na mosali wana, soki tango mokonzi akozonga, akuti ye azali kosala mosala ndenge basengaki ye. 47Nalobi na bino ya solo, mokonzi akotia ye moyangeli ya bilokona ye nyonso.

48Kasi soki azali mosali mabe ; akomiloba : “Mokonzi na ngaiazali koya noki te”, 49mpe soki abandi konyokola baninga na ye ya mosala, kolia mpe komela esika moko na bato oyo balangwaka masanga ; 50bongo mokonzi akozonga na mokolo oyo ye azali kozela te, mpe na ngonga ye ayebi te. 51Akopesa ye etumbu, mpe akotia ye esika moko na bato ya kokosana ; epai ekozala kolela mpe koswa mino.
Copyright information for LinMNB