Matthew 24:29-34

29Mbala moko, sima ya pasi ya mikolo wana, Moyi ekokoma molili,
sanza ekongenga lisusu te,
minzoto ekokweya wuta likolo,
mpe banguya ya likolo ekoningana.

30Bongo elembo ya Mwana ya moto ekomonana na Likolo ; mpe bato ya bikolo nyonso ya mokili bakolela, mpe bakomona Mwana ya moto akoya na likolo ya mapata, na nguya nyonso mpe na kembo monene. 31Mpe akotinda baanzelu na ye elongo na lokito monene ya kelelo ; bongo bango bakosangisa bato nyonso oyo ye apona na bipai nyonso minei ya mokili, banda na suka moko ya likolo kino na oyo mosusu.

32Bolanda mateya ya nzete ya figi. Soki bitape na yango ekomi pete-pete, mpe makasa na yango ebandi kobima, wana boyebi ete tango ya mbula ekomi pene-pene. 33Bino mpe ndenge moko, tango bokomona makambo wana nyonso, boyeba ete Mwana ya moto akomi pene-pene na porte.

34Nalobi na bino ya solo : bato ya tango oyo, bakoleka te, liboso ete makambo wana esalama.
Copyright information for LinMNB