Matthew 26:1-5
Bakani koboma Yesu
(Mk. 14.1-2 ; Lk. 22.1-2 ; Jn. 11.47-53)
1Tango Yesu asilisaki koloba makambo wana nyonso, alobaki na bayekoli na ye : 2—Boyebi ete feti ya Paki etikali mikolo mibale mpo ebanda, mpe Mwana ya moto bakoteka ye mpo babaka ye na ekulusu. 3Bongo bakonzi ya banganga-Nzambe na bankolo basanganaki na ndako ya Kayifa, mokonzi ya banganga-Nzambe ; 4bayokanaki mpo na kokanga Yesu na mayele, mpe baboma ye. 5Kasi balobaki : —Tosala yango na tango ya feti te, mpo bato batomboka te.Basopeli Yesu malasi na Betaniya
(Mk. 14.3-9 ; Jn. 12.1-8)
Copyright information for
LinMNB