Matthew 26:31-35

31Bongo Yezu alobaki na bango :

—Na butu ya lelo, bino nyonso bokokweyisa kondima na bino mpo na ngai. Pamba te ekomama : Nakobeta mobateli,
mpe bameme ya etongo bakopalangana.

32Kasi sima ya kosekwa na ngai, nakokende liboso na bino na Galileya !

33Piere alobaki :

—Ata soki bango nyonso bakweyisi kondima na bango mpo na yo kasi ngai nakokweyisa yango te.
34Yezu azongiselaki ye :

—Nalobi na yo ya solo : na butu ya lelo, liboso ete soso elela, okowanganaa ngai mbala misato.
35Kasi Piere alobaki na ye :

—Atako soki nasengeli kokufa na yo elongo, nakowangana yo te. Bongo bayekoli nyonso balobaki kaka ndenge moko.

Yesu abondeli na Getesemane

(Mk. 14.32-42 ; Lk. 22.39-46)

Copyright information for LinMNB