Matthew 26:36-41

36Bongo Yesu akendaki elongo na bayekoli na ye na esika moko babengaka Getesemane ; mpe alobaki na bango :

—Bovanda awa, na tango ngai nakei kobondela kuna.
37Akamataki Piere na bana mibale ya Zebede, mpe abandaki koyokamawa mingi penza mpe pasi na motema. 38Bongo alobaki na bango :

—Elimo na ngai etondi na mawa mingi penza pene ya liwa. Botikalaawa, bokengela elongo na ngai.
39Akendaki mwa moke liboso, akweyaki elongi na nse, mpe abondelaki :

—Tata, soki ekoki kosalama, tika ete kopo oyo eleka mosika na ngai ! Esalama ndenge ngai nalingi te, kasi ndenge yo olingi.
40Bongo azongaki epai ya bayekoli na ye mpe akutaki bango balali. Alobaki na Piere :

—Boni, bokokaki kokengela elongo na ngai ata ngonga moko te ?
41Bokengela mpe bobondela mpo bokweya na komekama te. Molimo ezalina mokano ya malamu kasi nzoto ezali na bolembu.
Copyright information for LinMNB