Matthew 26:6-11

6Tango Yesu azalaki na Betaniya, na ndako ya Simon oyo azalaki na maladi ya maba, 7mwasi moko azalaki na molangi ya Albatre
Albatre  : libanga oyo bazalaki kosalela basani ya mbele, bakopo mpe biloko mosusu.
, oyo ezalaki ya kotonda na malasi ya motuya mingi, ayaki epai na ye, mpe asopaki yango na motu na ye, na tango azalaki na mesa.

8Kasi bayekoli basilikaki tango bamonaki bongo, mpe balobaki :

—Mpo na nini kosala peleti ya boye ?
9Pamba te, malasi yango ekokaki kotekama na ntalo mingi penzampe kopesa mbongo na babola.

10Tango Yesu ayebaki yango, alobaki na bango :

—Mpo na nini bozali kotungisa mwasi oyo ? Pamba te, asaleli ngailikambo moko ya malamu.
11Babola, bokozala na bango elongo tango nyonso, kasi ngai, bokozala na ngai tango nyonso te.
Copyright information for LinMNB