Matthew 8:1-4
Yesu abikisi bato ya maladi
(Mk. 1.40-45 ; Lk. 5.12-16)
1Tango Yesu akitaki na ngomba, bato ebele penza balandaki ye. 2Bongo moto moko ya maladi ya maba ayaki, afukamaki liboso na ye, mpe alobaki : —Nkolo, soki olingi, okoki kokomisa ngai peto. 3Yesu atombolaki loboko, asimbaki ye, mpe alobaki : —Nalingi yango ; koma peto. Kaka na tango wana apetolamaki na maba na ye. 4Bongo yesu alobaki na ye : —Yoka ! koyebisa likambo oyo na moto te ; kasi kende komilakisa epai ya nganga-Nzambe mpe pesa likabo oyo Moyize atinda. Yango ekozala litatoli epai na bango.(Lk. 7.1-10 ; Jn. 4.43-54)
Copyright information for
LinMNB