1 Corinthians 11:23-25

23Pamba te, tala mateya oyo ngai nazwaki epai ya Nkolo mpe nateyaki bino : Nkolo Yesu, na butu oyo batekaki ye, akamataki lipa, 24mpe sima ya kozongisa matondi, akataki yango mpe alobaki : “Oyo ezali nzoto na ngai, ezali mpo na bino. Bosalaka boye mpo na kokanisa ngai.” 25Ndenge moko mpe sima ya kolia, akamataki kopo mpe alobaki : “Kopo oyo ezali Boyokani ya Sika kati na makila na ngai. Bosalaka bongo tango nyonso bokomelaka yango, mpo na kokanisa ngai.”
Copyright information for LinMNB