John 11:47-52
47Bongo banganga-Nzambe mpe bafarizeo babengisaki likita-monene. Batunanaki : —Tokosala nini ? Pamba te moto oyo azali kosala makamwisi mingi. 48Soki totiki ye bongo, bato nyonso bakondima ye, bongo bato ya Roma bakoya mpe bakopanza Esika na biso ▼▼ Esika na biso : to Ndako na biso ya Nzambe.
mpe ekolo na biso. 49Bongo moko na kati na bango kombo na ye Kayifa, oyo azalaki mokonzi ya banganga-Nzambe na mbula wana, alobaki na bango : —Bozali kososola eloko moko te ! 50Bozali komona te ete ezali mpo na litomba na biso ete moto moko akufa mpo na bato nyonso, bongo ekolo mobimba ekufa te ? 51Nzokande alobaki makambo wana na makanisi na ye moko te, kasi lokola azalaki mokonzi ya banganga-Nzambe na mbula wana, yango wana asakolaki ete Yesu akokufa mpo na ekolo ya bayuda ; 52mpe mpo na ekolo kaka te, kasi mpo na kosangisa mpe bana nyonso ya Nzambe baoyo bapalangana, ete bazala moto se moko.
Copyright information for
LinMNB