John 12:12-16

12Mokolo oyo elandaki, ebele ya bato oyo bayaki na feti, awa bayokaki ete Yesu akoya na Yeruzalem, 13bakamataki mandalala, bongo bakendaki koyamba ye, mpe bazalaki koganga :

—Ozana ! Mapamboli mingi na moto oyo aye na kombo ya Nkolo ! Mapamboli na Mokonzi ya Isalayele !

14Yesu amonaki mwana ya mpunda, mpe avandaki likolo na yango, ndenge ekomama :
15 Elenge mwasi ya Siona kobanga te,
tala, Mokonzi na yo azali koya,
avandi likolo ya mwana ya mpunda !

16Na tango wana, bayekoli na ye basosolaki te tina ya makambo yango ; kasi tango Yesu akotaki kati na nkembo, bongo nde bakundolaki na mitema ete makambo yango ekomamaki mpo na ye, mpe basalaki makambo wana epai na ye.
Copyright information for LinMNB