John 18:17-18

17Mwasi yango, oyo azalaki kokengela porte atunaki Piere :

—Boni, yo mpe ozali moko ya bayekoli ya moto wana te ?

Piere azongiselaki ye :

—Te, nazali moyekoli na ye te !

18Lokola malili ezalaki, basali mpe bakengeli bapelisaki moto ya makala, mpe batelemaki pembeni-pembeni mpo na koyotela. Piere mpe azalaki wana elongo na bango mpo na koyotela.

Mokonzi ya banganga-Nzambe asambisi Yesu

(Mt. 26.59-66 ; Mk. 14.55-64 ; Lk. 22.66-71)

Copyright information for LinMNB