Luke 12:25-30

25Kutu, nani kati na bino mpo na komitungisa na ye, akoki kobakisa ata ngonga moko na bomoi na ye ? 26Soki bokoka te kosala mwa likambo wana ya moke, bongo mpo na nini komitungisa na makambo oyo mosusu ? 27Botala bafololo ndenge ekolaka, esalaka te mpe etongaka bilamba te ; kasi nalobi na bino, ata Salomo, kati na nkembo na ye mobimba, alataki te lokola moko na yango. 28Soki Nzambe alatisaka na ndenge wana, matiti oyo ezali lelo na elanga, mpe lobi ekobwakama na moto ; boni, akolatisa bino koleka yango te ? A ! bato ya kondima moke.

29Kasi bino, boluka te eloko oyo bokolia to oyo bokomela, mpe bomitungisa te mpo na yango. 30Pamba te, bapakano ya mokili oyo nde baluka-lukaka biloko wana nyonso, kasi Tata na bino ayebi ete bozali na posa ya biloko wana ;
Copyright information for LinMNB