Luke 20:27-32

27Ndambo ya baseduseoo, baoyo bazalaki kondima te ete lisekwa ezali, bayaki epai ya Yesu mpe batunaki ye motuna oyo : 28—Moteyi, Moyize akomelaki biso boye : soki moto moko akufi, azalaki na mwasi, mpe atiki bana te, ndeko na ye asengeli kozwa mwasi wana na libala mpo abotela ndeko na ye oyo akufi bana. 29Nzokande, ezalaki na bandeko mibali sambo. Oyo ya liboso abalaki mwasi mpe akufaki, kasi atikaki bana te. 30Oyo ya mibale, 31mpe oyo ya misato babalaki ye mpe. Esalamaki bongo na bango nyonso sambo : bakufaki mpe batikaki bana te. 32Suka na yango, mwasi mpe akufaki.
Copyright information for LinMNB